“Ntango nakendaki na ndako ya Bokonzi”
Laura,a atángaka na iniversite, basɛngaki ye akende kolanda likita ya lingomba moko mpe akoma makambo oyo akoyoka mpe akomona kuna. Aponaki kokende na Lingomba ya Batatoli ya Yehova, mpe lisolo na ye elobaki boye: “Ntango nakendaki na Ndako ya Bokonzi.” Makambo nini Laura amonaki epai ya Batatoli ya Yehova oyo ekesenisi bango na mangomba mosusu? Talá mwa ndambo ya makambo oyo akomaki.
Bana: “Bana nyonso bazalaki esika moko na mikóló. Na bandakonzambe nyonso oyo nakendá, bana balandaka mateya esika moko na baboti na bango te kasi balandaka mateya na Eteyelo ya Mokolo ya Lomingo.”
Bato ya mposo nyonso bazali esika moko: “Mangomba mingi ezalaka kaka na bato ya loposo ndenge moko to ya ekólo moko. . . . Kasi, Batatoli ya Yehova bafandaki bango nyonso esika moko mpe bakabwanaki te.”
Bayebi koyamba bapaya: “Bato mingi bayaki kosolola na ngai. . . . Bamosusu kutu batunaki ngai soki nayekolaka Biblia na Motatoli moko. Kasi, namonaki te ete bazali kotindika ngai na makasi. Batikaki . . . ngai moko napona.”
Mabonza ezalaki te: “Likambo moko oyo ekamwisaki ngai ezalaki ete moto te azalaki kokɔngɔla mabonza. . . . Na bandakonzambe oyo nakɔtá, bakɔngɔlaka mabonza ata epai ya bana mike.”
Masangá ya Batatoli ya Yehova ezali soki 90 000 na mokili mobimba. Tolendisi yo okende kotala ndenge basalaka makita na bango na Ndako ya Bokonzi oyo ezali penepene ya esika ofandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.