“Nazali mobali ya esengo mpo nazali na mwasi malamu”
NA BANTANGO mosusu, bato mosusu balobaka ete Batatoli ya Yehova babomaka mabala ya bato. Nzokande, ezali na mabala mingi ya malamu kati na yango molongani kaka moko azali Motatoli ya Yehova. Yango ezali kolakisa ete maloba wana ezali lokuta. Kolanda toli ya Biblia mpo na bomoi ya libota ebongisaka mabala, ndenge mokanda moko oyo ebimaki na zulunalo moko na ekólo France emonisi yango. Mokanda yango elobaki boye:
“Na boumeli ya mbula soki 28, nazali mobali ya esengo mpo nazali na mwasi malamu, mwasi yango azali Motatoli ya Yehova. Abɔkɔli bana na ngai mitano, na kati ya bana yango bana mibale nabotaki bango na mwasi mosusu; abatelaka bango mpe alingaka bango nyonso ndenge moko. Lelo nazali direktere na kompanyi moko oyo ezali na bato ya mosala 45, nakoki koloba na bino ete mwasi na ngai asali mingi mpo nakóma na esika oyo nazali na mosala na ngai. Yango wana, ntango namonaki lisolo moko na zulunalo oyo natángaka elobi ete Batatoli ya Yehova bazali likama mpo na etúká ya Lot-et-Garonne, nazwaki mokano ya kopesa bino litatoli, mpo ngai nazali koloba likambo ya solo.”
Mokanda yango elobi lisusu boye: “Bamelaka makaya te mpe balangwaka masanga te. Yango nde likama? Bazali baklisto oyo batosaka bindimeli ya bato mpe basɛngisaka bato mosusu na makasi te ete bálanda mibeko na bango. Kutu, bapesaka ndakisa malamu na makambo mingi. . . . Bayebi makambo ya koyiba mbongo te to ya kotɛka bangi te. Balapaka ndai ya kotikala monzemba te, mpe nakoki koyebisa bino solo ete, basalaka makambo lokola bato nyonso. . . .
“Bokoki kotuna ngai ete: Soki ezali bongo, mpo na nini yo moko ozali Motatoli ya Yehova te? Mpamba te kozala Motatoli ya Yehova ezali kosɛnga kozala na kondima ya boklisto mpe kozala na etamboli malamu, mpe makambo oyo emonanaka epai ya moto nyonso te.”