Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/8 lok. 32
  • “Soki mungwa ezangi elɛngi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Soki mungwa ezangi elɛngi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/8 lok. 32

“Soki mungwa ezangi elɛngi”

BITUMBA esalemá mpo na yango. Ezalaki kosalelama na esika ya mbongo mpo na kosombitanya biloko. Na ekólo Chine, na ntango ya kala, kaka wolo nde elekaki yango na motuya. Ɛɛ, banda kala, bato bazwaka mungwa lokola eloko ya motuya mingi. Tii na moi ya lelo, mungwa esalelamaka mpo na kosalisa bamaladi mpe koboma mikrobe. Na mokili mobimba basalelaka mungwa mpo na kobakisa elɛngi na mpe kobatela biloko epola te.

Soki totali ntina ya mungwa mpe ebele ya makambo oyo basalelaka mungwa, tokoki kokamwa te ete Biblia elobeli mungwa na maloba ya elilingi. Na ndakisa, Mibeko ya Mose esɛngaki ete bátya mungwa na eloko nyonso oyo bakopesa lokola mbeka na etumbelo ya Yehova. (Levitike 2:13) Bazalaki kosala yango mpo na kopesa mbeka elɛngi te, kasi bazalaki kosala bongo mpo mungwa ezalaki elilingi ya kobeba to kopola te.

Na Lisolo oyo asalaki likoló ya Ngomba, Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye ete: “Bino bozali mungwa na mokili.” (Matai 5:13) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete mosala na bango ya koteya bato Bokonzi ya Nzambe ezali mosala oyo ekoki kobatela, to kobikisa bomoi ya bato oyo bakoyoka bango. Ɛɛ, baoyo bazalaki kosalela maloba ya Yesu babebaki te ntango bizaleli mpe elimo ya bato ebebaki na esika oyo bafandaki mpe na esika oyo bazalaki kosala. —1 Petelo 4:1-3.

Kasi, Yesu akebisaki mpe ete: “Soki mungwa ezangi elɛngi, . . . ekoki lisusu te bobele ete bato bábwaka yango na libándá mpe ete bányatela yango na nse.” Na likambo oyo, Albert Barnes, molimboli moko ya Biblia, alobaki ete na ntango na Yesu na bantoma na ye, mungwa “ezalaki pɛto te, esanganaki mpumbulu ya banzete mpe na mabelé.” Na yango, soki mungwa ezali lisusu na elɛngi te, ekotikala bobele “mabelé mingi.” Barnes alobaki ete: “Yango ekozala lisusu na mosala te bobele . . . kotya yango na nzela, to na balabala, ndenge tosalaka mpo na mabanga.”

Na kolanda likebisi yango, baklisto basengeli kokeba ete bátika kosakwela bato te mpe bálanda te bizaleli mabe oyo Nzambe aboyi. Soki te bakobeba na elimo mpe bakozala lisusu na ntina te, lokola ‘mungwa oyo ezangi elɛngi.’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto