Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/8 nk. 3-4
  • Olingaka bomoi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olingaka bomoi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • ‘Nyonso oyo esɛngami epai na moto’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bomoi na yo​—⁠Ntina na yango ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nini epesaka ntina na bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bomoi oyo ezali na ntina, sikoyo mpe mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/8 nk. 3-4

Olingaka bomoi?

GIACOMO LEOPARDI, moto ya Italie, alobaki na bato oyo bayaki kotala ye liboso akufa, ete: “Botika natala pole.” Maloba yango ezali komonisa mposa makasi oyo moto azalaka na yango ya kozala na bomoi, mpe pole ezali elilingi ya bomoi yango.

Mposa ya kozala na bomoi epusaka bato bákima makama mpe básala nyonso oyo bakoki mpo na kobatela bomoi na bango. Na likambo yango, bato bakeseni mpenza te na banyama, mpamba te banyama mpe bazalaka na mposa makasi ya kotikala na bomoi.

Kasi bomoi ya lolenge nini oyo ebongi mpenza tózala na yango mpe tósepela na yango? Ezali kaka bomoi ya nzoto te, kaka kopema mpe koningana te. Bolamu eutaka mpe na bomoi ya koluka bisengo ya mokili te. Mpe mbala mingi mateya ya filozofi ya Épicure, oyo azalaki koloba ete, “Tólyaka mpe tómelaka zambi tokokufa lobi,” ememeli bato bolamu te. (1 Bakolinti 15:32) Moto azalaka na bamposa ya solosolo ya biloko ya mosuni. Kasi, asepelaka mpe na makambo oyo elekaka zingazinga na ye mpe makambo oyo bato mosusu basalaka. Mpe lisusu, azalaka na bamposa ya elimo, elingi koloba kondima epai ya Nzambe. Ezali mawa na komona ete na bisika mingi na mokili, tokoki koloba mpo na bato ebele ete bazali na bomoi mpo kaka bazali kopema mpamba te bobola mpe mikakatano mosusu ezali kotungisa bango. Bato oyo bomoi na bango esuki kaka na kokokisa bamposa na bango ya mosuni: kolya, komela, koluka biloko ya mosuni, to kokokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto, bakeseni mpenza te na banyama mpo bomoi yango epesaka bango se mwa bolamu moke. Basalelaka ata moke te makambo malamu oyo bomoi ezali kopesa biso mpo na kokólisa mayele na bango mpe makanisi na bango. Lisusu, bato oyo balukaka kokokisa kaka bamposa na bango ya moimi balekisaka libaku ya kosalela malamu bomoi na bango na ndenge ebongi, mpe lisusu babebisaka bato mosusu na esika oyo bafandi, mpe bakanisaka bolamu ya bato mosusu te.

Zuzi moko oyo asambisaka makambo ya bilenge ya mobulu andimi likambo yango, alobi ete: “Lokola bizaleli ya malamu ezali komonana lisusu te, lokola bazali kokumisa bavɛdɛti oyo bazali kopesa ndakisa mabe mpe bazali kolendisa kozwa bomɛngo nokinoki ata soki osali makasi te” makambo yango ezali “kokólisa elimo ya kowelana.” Yango ezali komema bato na bizaleli oyo ezali kobebisa baninga na bango mpe ezali kobebisa bilenge, mingimingi soki bamipesi na komela bangi.

Oyebi ete bomoi ezali na makambo mingi oyo esepelisaka: kokende kolekisa ntango na bisika kitoko, kotánga mikanda ya malamu to koyekola makambo, kozala na baninga malamu, miziki kitoko. Ezali mpe na makambo mosusu oyo esepelisaka mingi to moke. Baoyo bazali na kondima makasi epai ya Nzambe, mpe mingimingi na baoyo bandimaka Yehova, Nzambe oyo Biblia ezali koteya biso, bazali na bantina mingi ya kolinga bomoi. Kondima ya solo epesaka makasi mpe esengo oyo ekoki kosalisa bato bálɛmba te na ntango ya mpasi. Baoyo bandimaka Nzambe ya solo bakoki koloba na elikya nyonso ete: “[Yehova] azali mosungi na ngai, nakobanga te.” (Baebele 13:6) Bato oyo bayebi malamu bolingo ya Nzambe bamiyokaka ete alingi bango. Basepelaka na bolingo na ye, mpe yango epesaka bango esengo mingi. (1 Yoane 4:7, 8, 16) Yango wana bakoki kozala na makambo mingi ya kosala na bomoi na bango mpe bamibanzabanzaka mpo na bato mosusu; yango nde ezali sɛkɛlɛ ya bolamu. Ezali se ndenge Yesu Klisto alobaki ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.”—Misala 20:35.

Likambo ya mawa, ezali na makambo mosusu ya bomoi oyo. Bampasi epalangani na mokili mobimba, kozanga bosembo, bobola, maladi, mpe liwa—wana ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo ezali kopesa mpasi na bomoi. Salomo, mokonzi ya libota ya Yisalaele, azalaki na bozwi mpe na mayele mingi, azangaki eloko moko te oyo ekoki kopesa bato esengo. Kasi, ezalaki na likambo moko oyo ezalaki kotungisa ye: komona ete soki akufi, akotikela moto mosusu biloko na ye nyonso, ‘mosala nyonso oyo amonelaki mpasi,’ oyo asalaki ‘na mayele na boyebi mpe na boyengebene.’—Mosakoli 2:17-21.

Lokola Salomo, bato mingi bamonaka ete bomoi ezali mpenza mokuse, elekaka mbangu. Biblia elobi ete Nzambe ‘atii likanisi ya seko na makanisi na biso.’ (Mosakoli 3:11) Mposa yango ya bomoi ya seko etindaka bato bákanisa ndenge bomoi ezali mokuse. Na nsuka, soki moto aluki ntina ya bomoi mpe azwi biyano oyo ebongi te, akoki kolɛmba nzoto mpe komona ete bomoi ezali na ntina te. Yango ekoki kokómisa bomoi mawa.

Moto akoki kozwa biyano na mituna oyo ezali kotungisa ye? Mokolo mosusu bomoi ekoumela mingi mpe ekozala na makambo ya malamu?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto