Koponapona mposo na mangomba
TANGO bapanzi-nsango ya zulunalo Time batunaki Mark Mathabane, mokomi moko ya Afrika ya Sudi, alobaki boye: “Na 1978, ntango nakómaki na États-Unis, nazalaki kokanisa ete na États-Unis makambo ya koponapona bato na kotalela mposo na bango esilá banda kala, ete bato moindo bazalaki ndenge moko na bato nyonso. Namonaki ete ezalaki bongo na makambo mingi. Nazalaki komona lokola ete États-Unis eleki Afrika ya Sudi mosika. Na nsima, namonaki ete mitema ya bato ebongwanaki mpenza te mpe yango esalaki ngai mpasi mpenza.” Nini ememaki ye na komona makambo ya kokamwa bongo?
Mathabane alobaki ete: “Na États-Unis, moko na bangonga oyo bato bakabwanaka mingi koleka ezali ngonga ya 11 na ntɔngɔ na mokolo ya lomingo.” Amonaki ete ata na ndakonzambe, bato bazalaki koboya kosangana esika moko na bato ya mposo mosusu mpo na losambo. Atunaki boye: “Ndenge nini batalelaka bato ya mposo mosusu na mikolo mosusu ya pɔsɔ?” Mathabane alobaki boye mpo na komonisa ete mateya nde ebongolaka bato: “Mateya ekosalisa yo ondima ete bato nyonso bazali ndenge moko.”
Batatoli ya Yehova bandimaka ete koteya bato ezali likambo oyo ekoki kobongola bango, kasi mpo na bango, ezali libosoliboso mateya oyo euti na Liloba ya Nzambe. Ɛɛ, Biblia ezali kosalisa bango na kosilisa likambo ya kokanisela bato ya mposo mosusu mabe. Ata na mikili oyo bayinaka bato ya etuluka mosusu mingi. Pɔsɔ na pɔsɔ, na Bandako ya Bokonzi na bango, bato ya mposo nyonso mpe ya bikólo nyonso basanganaka mpo na koteyama na mibeko mpe mitinda ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Bakɔngɔlaka mabonza te na makita yango. Bazali kosɛnga yo oya kosangana na bango!