Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/7 nk. 28-29
  • Moto moko atángi nkombo ya Nzambe na Israël

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto moko atángi nkombo ya Nzambe na Israël
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli koyeba nkombo ya Nzambe
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Nkombo ya Nzambe—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Kumisá nkombo monene ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/7 nk. 28-29

Moto moko atángi nkombo ya Nzambe na Israël

ELEKI sikoyo bikeke mingi, Lingomba ya Bayuda epekisá mpenza bandimi na yango kotánga nkombo ya Nzambe, Yehova. Mishnah elobaka ete moto nyonso oyo akotánga nkombo ya Nzambe akozwa “likabo te na mokili oyo ekoya.”—Sanhédrin 10:1.a

Na mokolo ya 30 Yanuali 1995, moto moko oyo azalaki labi-mokonzi ya Bayuda ya ekólo Israël atángaki mpenza nkombo ya Nzambe. Asalaki yango ntango azalaki kozongela tikkun, libondeli ya Lingomba ya Cabale mpo na kozongisa makambo na molɔngɔ. Basalaka libondeli yango mpo Nzambe azongisa makambo na molɔngɔ na mokili mobimba, soki banguya ya mabe ebebisi yango, ndenge bandimi na bango bakanisaka. Zulunalo Yedioth Aharonoth ya mokolo ya 6 Febwali 1995 elobi boye: “Libondeli yango ezali na nguya makasi na boye ete maloba na yango ezali kaka na mwa buku moko oyo batekelaka yango bato te.” Bakanisaka ete kobelela nkombo ya Nzambe na ntango wana ebakisaka nguya ya libondeli yango.

Biblia elobi polele ete basaleli ya Nzambe basengeli kosalela nkombo na Ye, Yehova. (Exode 3:15; Masese 18:10; Yisaya 12:4; Sefania 3:9) Na makomi ya Liebele, nkombo yango ekomami mbala soki 7 000. Kasi, Biblia ezali kokebisa likambo ya kosalela nkombo ya Nzambe na ndenge ya mabe. Mobeko ya misato na kati ya Mibeko Zomi elobi boye: “Okotánga nkombo na [Yehova] Nzambe na yo mpamba te, mpo ete [Yehova] akolongisa te oyo atángi nkombo na ye mpamba.” (Exode 20:7) Ndenge nini moto akoki kotánga nkombo ya Nzambe mpamba? Buku moko (ebimisamaki na Jewish Publication Society) emonisi ete maloba ya Liebele oyo ebongolami “mpamba” elimboli kosalela nkombo ya Nzambe “na lisɛki” mpe lisusu “kozongela maloba ya kokumisa oyo ezangi ntina.”

Na yango, ndenge nini tosengeli kotalela tikkun, libondeli ya Cabale mpo na kozongisa makambo na molɔngɔ? Eutaki wapi? Na ekeke ya 12 mpe 13 T.B., Lingomba ya Bayuda ebimisaki lolenge moko ya maji, babéngi yango cabale, bato mingi babandaki kolanda yango. Na ekeke ya 16 T.B., labi moko, nkombo na ye Isaac Luria, akɔtisaki mabondeli babéngi “tikkunim,” milulu ya Lingomba ya Cabale. Na milulu yango bakómaki kotánga nkombo ya Nzambe lokola bikelakela ya maji ya makasi. Okanisi ete yango ezali lolenge malamu ya kosalela nkombo ya Nzambe?—Deteronome 18:10-12.

Ata soki oyanoli ndenge nini na motuna yango, okondima ete kotánga nkombo ya Nzambe na miso ya bato nyonso na Israël lelo esalema te. Kasi, Nzambe ye moko asakolaki boye: “Na mokolo yango bokoloba ete, Bótɔnda [Yehova], bóbyanga nkombo na ye, bóyebisa misala na ye kati na mabota, bósakola ete nkombo na ye ezali kokumisama. Yembelá [Yehova] nzembo, zambi asali misala na nkembo, oyo eyebani na mokili mobimba.”—Yisaya 12:4, 5.

Likambo ya esengo, na Israël, ndenge moko mpe na bikólo mosusu koleka 230 na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na kosalisa bazalani na bango bázwa boyebi ya solosolo ya Yehova. Bazali na elikya ete bato mingi lisusu bakoyeba ndimbola ya bavɛrsɛ lokola Nzembo 91:14 oyo elobi ete: “Nakobikisa ye mpo ete ye azali kolinga ngai [Yehova]; nakotombola ye likoló mpo ete ayebi nkombo na ngai.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mishnah ezali buku oyo ezalaki kolimbola Mibeko oyo ekomamaki. Bandimbola yango eutaki epai ya balabi oyo babéngamaki ba Tannaïm (balakisi). Bakomaki yango na nsuka ya ekeke ya mibale mpe na ebandeli ya ekeke ya misato T.B.

[Elilingi na lokasa 28]

Awa na Négueb, basaleli ya Yehova bazali kolakisa bato nkombo mpe Liloba ya Yehova

[Elilingi na lokasa 29]

Fɔtɔ oyo ezali kolakisa nkombo ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto