Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/7 lok. 32
  • Mayele ya “komona makambo oyo ekoya”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayele ya “komona makambo oyo ekoya”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/7 lok. 32

Mayele ya “komona makambo oyo ekoya”

“BAZALI libota oyo ebungisi makanisi malamu mpe ezangi mayele. Soki bazalaki na mayele, mbɛlɛ bayebi mpe bamoni makambo oyo ekoyela bango.”—Deteronome 32:28, 29, Beck [na Lingelesi].

Mose nde alobelaki Bayisalaele makambo wana ntango etikalaki moke bákɔta na Mokili ya Ndaka. Mose azalaki kosakola ntango moko oyo Bayisalaele bakosundola Yehova mpe bakokanisa te mpasi oyo misala na bango ekobimisa. Na bikeke oyo elandaki, Bayisalaele, bakisa mpe mikonzi mingi, babosanaki makebisi ya Nzambe.

Na ndakisa, Salomo, ayebaki mobeko ya Yehova oyo epekisaki kobala basi oyo basambelaka banzambe mosusu. (Deteronome 7:1-4) Kasi, azwaki “basi mingi ya bapaya.” Esukaki ndenge nini? Biblia elobi: “Ezalaki ete, wana Salomo akómaki mobange, basi na ye bapɛngolaki motema na ye kino banzambe mosusu. Motema na ye ezalaki malamu nyonso liboso na [Yehova] Nzambe na ye te lokola ezalaki motema na Davidi tata na ye.” (1 Mikonzi 11:1, 4) Atako azalaki moto ya mayele, Salomo abungisaki makanisi malamu mpo na ‘komona makambo oyo esengelaki koya’ soki abuki mobeko ya Nzambe.

Ezali boni mpo na biso? Tokoki kosala ete mpasi mingi ezwa biso te soki tokokanisa malamumalamu liboso tókamata mikano etali bomoi na biso. Na ndakisa, bapesi baklisto toli ete ‘bámipɛtola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo.’ (2 Bakolinti 7:1) Yango ezali likambo ya mayele, kasi bato mingi bazali na makanisi malamu te mpo na komona makambo oyo ekoki koyela bango soki batyoli toli oyo Paulo apesi. Na ndakisa, bilenge mingi bazali kobebisa nzoto na bango na komela makaya; bazali kokanisa ete komela makaya ekopesa bango mayele mpe bakomonana lokola bakómi mikóló. Nsuka na yango ezalaka mawa mingi, ntango mingi na kati na bango bazwaka maladi ya motema to kanser ya mimpululu (poumon) to maladi ya mpema (emphysème pulmonaire)!

Ezali likambo ya ntina tókanisaka malamu ntango tozali kokamata mikano mpe makambo oyo mikano yango ekobimisa. Paulo alongi mpenza na ndenge akomaki ete: ‘Soko moto akokona nini akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto, nde ye oyo akokona kati na elimo akobuka bomoi na seko na nzela na elimo.’—Bagalatia 6:7, 8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto