Eloko oyo eleki baprodwi ya kopakola
NTANGO ntoma Petelo alobelaki “biloko oyo emonanaka na miso” oyo basi bapakolaka mpo na kobongisa nzoto, apesaki toli oyo: “Kasi kitoko na bino ezala na kati ya mitema. Kitoko yango esilaka te mpo emonanaka na bizaleli ya boboto mpe ya kimya. Wana nde makambo ya ntina na miso ya Nzambe.”—1 Piere 3:3, 4, Boyokani ya Sika.
Likambo ya kobenda likebi ezali ete ntango Petelo akomaki mpo na kitoko wana ya libándá, asalelaki liloba moko ya Greke kosmos. Yango nde ebimisá liloba “cosmétique” na lompoto, elimboli “prodwi ya kopakola, mingimingi mpo na loposo.” Petelo azalaki nde kopekisa basi baklisto kopakola baprodwi to mpe biloko mosusu mpo na kitoko ya nzoto? Esika moko te Biblia elobi bongo. Na likambo yango, Biblia etiki moto na moto apona oyo asepeli kosala. Yango wana tosengeli koyeba ete bokeseni ekozala na mposa ya moto na moto.
Nzokande, soki moto azali kolekisa ndelo na kopakola baprodwi, to azali kosala yango na ndenge oyo ezali kobɛtisa bato mingi libaku, yango ekopesa likanisi nini? Ekozala mpe lisusu kitoko te, ekomonisa ete moto yango azali na bopɔlɔ te, ekozala na ntina te, elɛngi mpe te, ekosepelisa bato te mpe ekomonisa kozanga komibanzabanza mpo na baninga, boye te? Kutu, ekoki nde kobebisa kitoko ya mwasi mpe ekoki kopusa bato bámituna soki mwasi yango azali mpenza na etamboli malamu.—Talá Ezekiele 23:36-42.
Yango wana, soki asepeli kopakola baprodwi, mwasi oyo ‘ayambolaka ete andimaka Nzambe’ akosala makasi ete bato bámona ete azali na makanisi malamu, na boboto mpe na bopɔlɔ. Bizaleli motindo yango ekobakisa lokumu mpe kitoko na ye. Ata soki asepeli kotuta monzele to te, akozala na lokumu mpe kitoko ya motema. Ekomonisa ete ayebi mpenza ete maloba ya Petelo oyo tozongeli awa na likoló ezali ya solo, ete ezali na eloko moko oyo eleki baprodwi ya kopakola.—1 Timote 2:9, 10.