Tóbatela lokumu malamu
MOTO akoki koyoka esengo mingi na kotala liyemi (dessin) moko kitoko na likebi mpenza. Ntango moto azali kotala yango malamumalamu, akomona ndenge moyemi alandisaki langi ndenge na ndenge na etanda.
Bobele bongo, moto akómaka na lokumu malamu kaka na mbala moko te, kasi ntango azali kosala makambo mingi ya mikemike na boumeli ya ntango. Makambo oyo tozali kosala nde ekokolisa mokemoke lokumu na biso.
Nzokande, soki moyemi atii langi moko na esika oyo ebongi te, ekoki kobebisa liyemi. Ezali mpe bongo mpo na lokumu na biso. Salomo, mokonzi ya mayele mingi, alobaki boye: “[Bozoba] ya moto ekobebisa nzela na ye.” (Masese 19:3) Esɛngaka kaka mwa “bozoba” moke mpo lokumu ya moto ebeba; ekoki kozala kotomboka, momeseno ya kolangwa masanga, to kosala ekobo. (Masese 6:32; 14:17; 20:1) Yango wana, ezali na ntina mingi ete tósala makasi mpo tókóma na lokumu malamu mpe tósala na molende mpo na kobatela yango.—Talá Emoniseli 3:5.