Mobulu—Etikali moke ekosila libela!
“Mobulu etii ekólo na likama”—Zulunalo The New York Times, États-Unis.
“Mobulu na kati ya ndako”—Zulunalo O Globo, Brésil.
“Na bisika nyonso na mokili, bazali kosalela basi mobulu”—The Globe and Mail, Canada.
MITÓ ya makambo oyo ebimaki na bazulunalo na Amerika ya Nɔrdi mpe Amerika ya Sudi ezali komonisa likambo moko oyo ezali kotungisa bato na mokili mobimba. Eumeli naino te, Lisangá ya Mokili Mobimba mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto (O.M.S.) elobaki ete, “lolenge nyonso ya mobulu ebakisami mingi na bambula zomi oyo euti koleka.”
Talá mwa makambo oyo ezali kobangisa:
Koboma bato. Na Amérique latine mpe na bisanga ya Antilles, mokolo na mokolo, bato ya mobulu bazali koboma bato soki 1 250. Mpo na yango, “ndambo moko kati na mibale ya mikili yango, koboma bato ezali likambo ya mibale oyo mpo na yango bilenge ya mbula 15 tii 24 bazali kokufa mingi.”
Mobulu oyo bazali kosalela bana. Kobɛta bana na ndenge ya mabe, kosangisa na bango nzoto mpe konyokola bango na mayoki ezali makambo oyo ezali komonana na mokili mobimba. Na ndakisa, “baankɛtɛ oyo basalaki epai ya mikóló na mikili mingi ya bozwi emonisi ete bana 10 to mpe 15 likoló na monkama bazali kosangisa na bango nzoto—mingimimgi bana ya basi.”
Mobulu oyo bazali kosalela basi. Na 1997, nsima ya kotalela ndenge oyo bazali kobebisa ntomo ya moto na mokili mobimba, bato ya mayele balobaki ete “mobulu na kati ya ndako ezalaki moko na bantina minene ya minyoko ya basi na bikólo nyonso na mokili.” (Human Rights Watch World Report 1998) Mobulu na kati ya ndako, ekómi mingi kasi ezali kolobelama mingi te, ebéngami “mabe oyo bato bazali kolobela te na ekeke ya 20.”—The Globe and Mail, Canada.
Na mikolo ya Noa, mokili “etondaki na [mobulu, NW]” se ndenge ekómi lelo oyo. (Genese 6:9-12) Kasi, Yehova abikisaki Noa, ‘mosakoli ya boyengebene’ na libota na ye ‘ntango atindaki mpela na mokili likoló na bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.’ Nzambe akosala se bongo na mikolo na biso. Akobikisa ‘bato oyo babangaka ye’ ntango akolongola bato ya mobulu na bato mabe mpe akokómisa mabelé oyo paladiso na mokili ya sika oyo alaki. (2 Petelo 2:4-9; 3:11-13) Osepeli te na ndenge oyebi ete etikali moke mobulu ekosila libela?