Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/5 lok. 32
  • Balongaki mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Balongaki mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/5 lok. 32

Balongaki mabe

“MPO na nini mbwa oyo akufi akotuka mokonzi, nkolo na ngai? Nalɔmbi yo ete nakenda kokata nkingo na ye!” Abisai, mokonzi ya basoda ya Yisalaele nde asɛngaki likambo yango. Alobaki bongo na nkanda ntango ayokaki Simi, moto moko ya libota ya Benyamina, azali kofinga nkolo na ye Mokonzi Davidi.​—2 Samwele 16:5-⁠9.

Abisai azalaki kolanda likanisi oyo emonanaka epai ya bato mingi lelo oyo, elingi koloba soki moto asali yo mabe, yo mpe osala ye mabe. Ɛɛ, Abisai alingaki kosala Simi mabe mpo afingaki Davidi.

Kasi, Davidi asalaki nini? Davidi apekisaki Abisai, alobaki ete: “Tiká ye.” Atako Simi afundaki ye mpamba, Davidi na komikitisa akangaki motema liboso ya komekama yango oyo mbɛlɛ azongisaki mabe na mabe. Kasi, atikaki makambo yango na mabɔkɔ ya Yehova.​—2 Samwele 16:10-⁠13.

Ntango Davidi azongaki na kiti ya bokonzi nsima ya kokima mwana na ye oyo alingaki koboma ye kasi alongaki te, Simi azalaki moto ya liboso oyo ayaki kopesa ye mbote mpe kosɛnga bolimbisi. Mbala oyo lisusu, Abisai alingaki koboma ye, kasi Davidi aboyaki.​—2 Samwele 19:15-⁠23.

Na likambo yango, Dividi amonisaki mpenza ete azali elilingi ya Yesu Klisto, oyo ntoma Petelo akomaki mpo na ye ete: “Atukamaki nde azongisaki kotuka te; . . . kasi amipesaki epai na ye oyo akosambisaka sembo.”​—1 Petelo 2:23.

Lelo oyo, bapesi baklisto toli ete bázala ‘na kosɔkɛma. Bázongisa mabe mpo na mabe te.’ (1 Petelo 3:8, 9) Soki tolandi ndenge oyo Davidi na Yesu Klisto basalaki, biso mpe tokoki “kozongisa mabe nsima mpo na malamu.”​—Baloma 12:17-⁠21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto