Bakonzi bakumisi Batatoli ya Yehova
DOÑA TEÓFILA MARTÍNEZ, mokonzi ya engumba Cadix, engumba moko ezali na libongo ya mai monene ezwami na kilomɛtɛlɛ soki 500 na sudi-wɛsti ya Madrid, apesaki Batatoli ya Yehova libaya moko (talá fɔtɔ na likoló) oyo bakomi ete: “Euti na bakonzi ya Cadix mpo na Batatoli ya Yehova mpo na kotɔnda bango na mosala mpe milende oyo bazali kosala mpo na bolamu ya engumba oyo.” Batatoli basalaki mosala nini mpo na kozwa lokumu ya boye?
Batɔndaki Batatoli mpo na mosala oyo basalaki ya kobongisa stade ya engumba yango. Na boumeli ya bawikende mingi, Batatoli mingi bamipesaki mpo na kobongisa batwaleti ya Stade Carranza, libándá ya masano ya ndembo. Sikoyo, bato nyonso oyo bakendaka wana basalelaka batiyo, bapɔmpi, mpe bakaro oyo Batatoli batyaki kuna.
Banda mwa kala, Batatoli ya Yehova bazalaka na boyokani malamu na bakonzi ya engumba Cadix. Mbula nyonso, bakonzi ya Cadix bapesaka Batatoli ya Yehova Stade Carranza mpo básala liyangani na bango ya etúká, yango esalemaka mbula na mbula. Yango wana, Batatoli basepelaka kosala nyonso oyo bakoki kosala mpo na kopesa bakonzi mabɔkɔ na kobatela libándá ya masano yango malamu.
Nzokande, longola mosala ya kobongisa libándá ya masano, mbala na mbala Batatoli ya Yehova bakendaka kotala bato ya engumba yango mpo na kosalisa bango na lolenge mosusu. Basakolaka “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe. Ya solo, bakendaka koteya mpo ete bato bákumisa bango te. Kasi, basalaka yango mpo na kotosa etinda ya Yesu, ya kosakola “nsango malamu na Bokonzi” mpe “kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 24:14; 28:19) Na ndenge yango, Batatoli ya Yehova bazali kolikya kosalisa engumba yango na ndenge bazali koteya bato “nzela na boyengebene.”—Masese 12:28.