Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Bazali kosakola ‘na elaka malamu mpe na elaka malamu te’
NTANGO etumba engalaki na ekólo Bosnie-Herzégovine, bato mingi bamonaki mpenza bwale. Na ntango wana ya mpasi, Batatoli ya Yehova basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kolendisa bato mpe kopesa bango elikya. Maloba oyo elandi euti na mokanda oyo Motatoli moko oyo azalaki kosala na Sarajevo akomaki.
“Awa, bomoi ezali mpasi, kasi bato mingi bazali kosepela na solo ya Biblia. Batatoli ya mboka oyo bazali mpenza kopesa ndakisa malamu ya kolendendela. Bazali na biloko mingi te, kasi bazali na elimo ya malamu mpenza. Pene na bilenge nyonso na lisangá bazali babongisi-nzela. Molende yango ezali kolendisa basakoli ya sika, mpe mbala mingi, na sanza moko bazali kolekisa ngonga 60 to koleka na mosala ya kosakola banda sanza ya liboso oyo bakómi basakoli.
“Longola kosakola ndako na ndako, tomekaki kosalela balolenge mosusu mpo na kokutana na bato. Na ndakisa, tozwaki matomba malamu na kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na malita oyo ezali mingi na mboka oyo.
“Tozalaki mpe kopesa litatoli na balopitalo. Na paviyo ya bato ya maladi ya motema na lopitalo monene ya Sarajevo, monganga-mokonzi azwaki Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1996 oyo lokasa na yango ya liboso ezalaki na motó ya likambo oyo elobi ete: ‘Crise cardiaque — Que faire ?’ Asɛngaki ete tómemela ye mwa liboke ya nimero yango mpo akabolela minganga mosusu. Na nsima, apesaki Batatoli ndingisa ya kotala babɛli nyonso na paviyo na ye. Bongo, nsima ya ngonga moko na mwa miniti, tokabolaki bazulunalo koleka 100 na mbeto na mbeto. Babɛli mingi balobaki ete ezali mbala ya liboso oyo bayei kotala bango na lopitalo mpo na kolendisa bango mpe kopesa bango elikya.
“Mokolo mosusu, tokendaki na paviyo oyo basalisaka bana; tomemaki bazulunalo oyo ezali na masolo ebongi mpo na bana. Kuna mpe monganga-mokonzi andimaki kozwa babuku Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpo na kotya na bibliotɛkɛ. Sikoyo, mokolo na mokolo bamama oyo bakendaka kotala bana na bango na lopitalo batángelaka bango masolo ya Biblia. Tozwaki mpe bibongiseli mpo tótalaka monganga yango na ndako na ye.
“Na Sarajevo, basoda ya OTAN [Organisation du traité de l’Atlantique Nord] bazali mingi mpe bauti na mikili ndenge na ndenge. Bango mpe bazwi litatoli ya mozindo. Ntango mosusu tokendaka na motuka ya etumba (auto blindée) mokomoko mpe tosalelaka mwa buku Nsango malamu mpo na mabota nyonso mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká! na minɔkɔ ndenge na ndenge. Tokabolaki bazulunalo koleka 200 na káa ya basoda ya ekólo Italie. Likambo ya kokamwa, basoda mingi ya Italie balobaki ete ezali mbala na bango ya liboso básolola na Batatoli ya Yehova. Bakutani na bango na Sarajevo.
“Mokolo mosusu, motuka moko ya etumba etɛlɛmaki na pembeni ya nzela. Nasalelaki lingɛmbu (parasoleil) na ngai mpo na kobɛta ko-ko-ko, mpe soda moko abimaki. Nalakisaki ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo lokasa na yango ya liboso ezali na motó ya likambo oyo elobi ‘Bamemi-nsango ya kimya—Bazali banani?’ Soda yango atalaki ngai mpe atunaki ete, ‘Ozali Motatoli ya Yehova?’ Ntango nandimaki ete nazali Motatoli, alobaki, ‘Nakamwe; na awa bozali! Boye na mokili oyo mobimba esika nini Batatoli bazali te?’”
Ntoma Paulo apesaki elendiseli ete: “Osakola liloba, ozala na etingya na bilaka malamu mpe na bilaka malamu te.” (2 Timote 4:2) Ndenge moko na bandeko na bango na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova na Sarajevo bazali kosala yango, ezala na mbeto na mbeto mpe na motuka ya etumba mokomoko!