Nkombo ya Nzambe ezongisami
“NSIMA ya bambula ebele, mbala mosusu kutu bikeke mingi oyo nkombo Yehova elongolamaki na Babiblia, batatoli na ye ya mikolo na biso bazali lingomba kaka moko ya boklisto oyo ezali kolobela mpe ezongisi tetragrame.”a
Maloba oyo mauti na buku Jeová dentro do judaísmo e do Cristianismo (Yehova na Lingomba ya Bayuda mpe na mangomba ya boklisto), ekomami na Assis Brasil, moto ya ekólo Brésil. Kasi, motuna moko ekoki kotunama, Atako mwa mabongoli moke esaleli nkombo ya Nzambe na ekomeli moko to mosusu, mpo na nini mangomba mosusu elongoli nkombo yango na Babiblia na bango? Brasil alobi ete: “Nkombo ya Nzambe elongolamaki mpo na bobangi . . . , mpo na bantina mosusu oyo ebimaki nsima, to mpo bazalaki na mposa ete nkombo ya Yesu mpe ya mama na ye Malia eyebana mingi.”
Kasi, lokola Brasil alobi yango malamu: “Libongoli Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau na monɔkɔ ya Portugais esemboli likambo yango ya kolongola nkombo [ya Nzambe].” Na ndenge nini? Na boye ete ezongisi nkombo Yehova na esika na yango mpenza na Biblia. Tozali kokuta nkombo Yehova koleka mbala 7 200 na Traduction du monde nouveau.
Banda kobimisama na yango ya liboso, koleka milio motoba na ndambo ya Biblia yango ya sika mpe oyo elandi malamumalamu maloba ya lokota ya ebandeli, ekabolami na monɔkɔ ya Portugais. Yango wana, mokomi moko na zulunalo Diário do Nordeste atunaki ete, “Oyebaki ete Nzambe azali na nkombo?” Lelo oyo, na lisalisi ya Biblia oyo ya sika, bamilio ya bato bakoki kopesa eyano ete, “Ɛɛ. Nkombo ya Nzambe ezali Yehova.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Liebele, nkombo ya Nzambe ekomamaka יהוה. Balɛtɛlɛ oyo minei (etángamaka banda na lobɔkɔ ya mobali), mbala mingi babéngaka yango Tetragrame.