“Namonaki mpenza ete bazalaki kimya”
MOBALI moko oyo alobaka lokota ya Allemand akendaki na liyangani ya Batatoli ya Yehova mpo na “konɔnga” bango. Mpo na nini? Alingaki “komonisa mabe ya mwa lingomba yango mpe kobikisa baninga na ye oyo akanisaki ete babungi nzela.” Nsima ya kolanda liyangani, akomelaki baninga na ye mokanda oyo elobaki boye:
“Ntango napusanaki pene na esika ya liyangani, namitunaki soki esika yango ezali mpenza wana. Moto moko te azalaki na libándá, mpe ata molangi to linzanza moko te ya masanga ezalaki na mabelé. Ntango nakómaki, namonaki mibali mibale na ekɔtelo ya libándá ya masano. Bapesaki ngai mbote mpe bakɔtisaki ngai.
“Nakanisaki nakoyoka makɛlɛlɛ ya bato mingi oyo bazalaki kuna, kasi esika yango ezalaki kimya. Nalobaki, ‘ekoki kozala ete bazali bobele bato moke na esika oyo ya monene.’
“Ntango nakɔtaki, miso na ngai ekendaki mbala moko na drame oyo ezalaki kosalema na ebaelo. Bobele na nsima nde nayaki komona ete libándá ya masano etondaki mɛkɛ na bato oyo bazalaki kolanda na likebi nyonso. Namonaki mpenza ete bazalaki kimya. Makambo oyo nayokaki, namonaki, mpe ndenge namiyokaki na boumeli ya liyangani mobimba esimbaki motema na ngai makasi.
“Ntango nafandaki na Batatoli, namonaki ete bilongi na bango bizali na esengo mpe nayokaki maloba na bango oyo emonisaki ete bazali na bolingo. Mbala moko, nakokaki kowangana likambo oyo te: ‘Bato oyo bazali mpenza basaleli ya Nzambe!’”
Na esika ya ‘kobikisa baninga na ye oyo akanisaki ete babungi nzela,’ elenge mobali yango asɛngaki bango báyekola na ye Biblia. Litomba nini ebimaki? Lelo oyo, azali nkulutu moklisto. Ye na libota na ye bazali basakoli ya molende na lisangá na engumba Zoug, na ekólo Suisse.