Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/2 lok. 8
  • Sikoyo ayebi Nzambe ya solo oyo azalaki koluka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sikoyo ayebi Nzambe ya solo oyo azalaki koluka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Biblia ya Berleburg
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Etumba mpo na kotemela nyama mabe mibale
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na banguna ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/2 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Sikoyo ayebi Nzambe ya solo oyo azalaki koluka

NA EKEKE ya zomi L.T.B., losambo ya lokuta epanzanaki mingi na bokonzi ya mabota mibale ya Yuda. Kasi, atako losambo ya bikeko ekómaki mingi na kati ya ekólo yango, ezalaki na moto moko oyo motema na ye ezalaki sembo epai ya Yehova. Nkombo na ye Yosafata. Mosakoli Yehu alobaki boye mpo na ye: “Makambo malamu mamonani epai na yo, zambi . . . otii motema na yo koluka Nzambe [ya solo].” (2 Ntango 19:3) Ndenge moko lelo, na “ntango na mpasi” oyo, bamilio ya bato ‘batii mitema na bango mpo na koluka Nzambe ya solo,’ Yehova. (2 Timote 3:1-5) Lisolo oyo euti na ekólo Togo, na wɛsti ya Afrika emonisi likambo yango.

Casimir azalaki kotánga na eteyelo ya Bakatolike mpe akulaki kominyo ntango azalaki na mbula libwa. Kasi, ntango akómaki na mbula 14, atikaki kokende ndakonzambe. Likambo yango ezalaki kobangisa ye mpamba te azalaki kokanisa ete lokola atiki kokende na Misa soki akufi akokende na lifelo ya mɔ́tɔ to na epongelo.

Na eteyelo Casimir akɔtaki na etuluku moko ya bilenge oyo bazalaki koyangana mbala moko na pɔsɔ mpo na koyekola Biblia. Abandaki mpe kotánga Biblia ye moko. Mokolo moko, Casimir atángaki na mokanda ya Emoniseli ete nyama na yauli moko ya nsɔmɔ ebimaki na mai monene. (Emoniseli 13:1, 2) Ntango atunaki motambwisi ya etuluku ya boyekoli ya Biblia ndimbola ya nyama yango, ayebisaki ye ete nyama yango ezali solo mpe ekobima mpenza na mai monene. Ndimbola yango ebangisaki Casimir mpamba te azalaki kofanda mosika te na mbu ya Atlantique. Amonaki ete akozala na kati ya bato ya liboso oyo nyama yango ekoboma.

Casimir abandaki kobomba mbongo mpo akende kofanda na mokili mokauki na nɔrdi mpo na kokima nyama yango. Ayebisaki moninga moko ya kelasi likambo yango. Lokola moninga yango azalaki Motatoli ya Yehova, alimbwelaki ye ete nyama oyo ekobima na mai monene ezali mpenza nyama ya solo te. Mwa moke na nsima, babéngaki Casimir na makita na Ndako ya Bokonzi. Makita esepelisaki ye mingi mpe abandaki koyangana pɔsɔ na pɔsɔ. Andimaki lisusu ete moto moko ayaka koteya ye Biblia na ndako.

Lokola Casimir akómaki koyeba makambo mingi na boyekoli na ye, bandeko ya libota na ye babandaki kotɛmɛla ye. Bango bazalaki kosambela bankɔkɔ mpe bazalaki kolya nyama babimisá makila te oyo ezalaki kotikala ntango bauti kopesa bambeka. Ntango Casimir, na limemya nyonso, aboyaki kolya nyama yango, bakanelaki ye mpe balobaki na ye abima na ndako. Casimir afandaki kimya, mpe basalaki ye eloko te. Kasi, na boumeli ya sanza misato mobimba, bazalaki kolamba bobele nyama ya ndenge yango. Casimir azalaki na mokakatano mpo na kozwa eloko ya kolya, kasi akangaki motema na mokakatano yango bakisa mpe mikakatano mosusu.

Casimir alandaki kokola na elimo kino amipesaki na Nzambe mpe azwaki batisimo. Na nsima, akómaki mosaleli ya misala mpe akɔtaki kelasi ya mbala ya minei mpo na kobongisa bankulutu na basaleli ya misala oyo esalemaki na ekólo Togo. Sikoyo, azali kosala na Betele ya Batatoli ya Yehova.

Ɛɛ, mbala mingi maloba oyo Mokonzi Davidi alobaki mamonanaka mpenza solo: “Soko okoluka [Yehova], akozwana na yo.”​—1 Ntango 28:9.

[Bililingi na lokasa 8]

Casimir (na lobɔkɔ ya mobali) na mosala na Betele

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto