Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/1 lok. 32
  • “Monene lokola nzete ya ɛlɛzɛ ya Lebanona”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Monene lokola nzete ya ɛlɛzɛ ya Lebanona”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/1 lok. 32

“Monene lokola nzete ya ɛlɛzɛ ya Lebanona”

NA BANGOMBA kitoko ya Lebanona, ezali na banzete oyo ebotaka kuna eyebani na nkombo ya Arz Ar-rab, elimboli “Banzete ya ɛlɛzɛ ya Nkolo.” Banzete minene yango ezali na nkasa oyo ekaukaka te. Na ntango ya kala, etondaki na bangomba mpe Biblia elobeli yango mbala soko 70​—koleka nzete mosusu nyonso.

Mpo na kolobela banzete minene ya Lebanona, Makomami esalelaka maloba “malamu” mpe “kitoko.” (Loyembo na Solomo 5:15; Ezekiele 17:23) Bato balingaka mingi kosalela yango mpo na kotonga ndako, kosala masuwa mpe biloko ya ndako, mpamba te ezalaka monene mpe mabaya na yango ezalaka makasi. Bato basepelaka na mabaya na yango mpo na nsolo kitoko mpe ezalaka na langi ya motane, mpe lokola ezalaka na mai mingi, mai yango ebatelaka yango mpe epekisaka banyamankɛkɛ kobebisa yango. Banzete yango ezalaka mpenza milai mpe minene. Ekómaka molai kino mɛtɛlɛ 37 mpe monene ya mɛtɛlɛ 12. Misisa na yango milai mpe makasi ekɔtaka na kati ya mabelé mpenza. Ezali likambo ya kokamwa te ete bato oyo bayekolaka banzete balobeli yango lokola “nzete oyo eleki banzete nyonso na nkembo”!

Na esakweli moko, Ezekiele, mokomi ya Biblia, akokanisaki Masiya na etape ya nzete ya ɛlɛzɛ oyo Nzambe ye moko akoni. (Ezekiele 17:22) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “ɛlɛzɛ” euti na liloba oyo elimboli “kopikama.” Ndenge moko lelo oyo, bayekoli ya Masiya, Yesu Klisto, basengeli ‘kotɛlɛma to [kopikama] kati na kondima, . . . kokemba na nguya,’ lokola nzete ya ɛlɛzɛ molai oyo elendá. (1 Bakolinti 16:13) Ndenge nini yango ekoki kosalema? Soki batɛmɛli bopusi mabe mpe bakangami makasi na bosembo mpe na bobangi Nzambe. Biblia ezali kolobela baoyo bazali kosala bongo lokola ‘bayengebene . . . [oyo] bazali kokola lokola nzete ya ɛlɛzɛ ya Lebanona.’​—Nzembo 92:12, The New English Bible.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto