Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/11 lok. 32
  • “Nani atii mayele kati na mapata”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nani atii mayele kati na mapata”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/11 lok. 32

“Nani atii mayele kati na mapata”?

“SOKO bokomona lipata kobima epai na kolimwa na moi, bokoloba nokinoki ete, Mbula ekoya, mpe ekozala bongo. Soko bokomona mopɛpɛ elongwi na ngɛlɛ, bokoloba ete, Moi ekongala, mpe ekozala bongo.” Maloba wana ya Yesu oyo Luka akomaki na Evanzile na ye mazali ndakisa oyo emonisi ete bato ya Palestine ya kala bazalaki koyeba liboso ndenge ntango ekozala. (Luka 12:54, 55) Na bantango mosusu, bato ya kala bazalaki kotalela bilembo mpe koyeba malamumalamu liboso makambo oyo makosalama mwa moke nsima.

Lelo oyo, mpo na koyeba ndenge likoló ekozala ata na mikolo mikoya, banganga-mayele ya météo basalelaka bamasini ya ndenge na ndenge, lokola satelite, radar, mpe baordinatɛrɛ. Kasi, mbala mingi makambo oyo bayebisaka liboso makokisamaka te. Mpo na nini?

Ezali na makambo mingi oyo esalaka ete bisakweli oyo bimonisaka ndenge likoló ekozala bikokisama mpenzampenza te. Na ndakisa, molunge, malili, lombango ya mopɛpɛ mpe lisusu epai oyo mopɛpɛ ezali kouta to kokende ekoki kobongola makambo nyonso. Longola wana, ezali mpe na makambo oyo moi, mapata, mpe mai minene ebimisaka. Makambo wana banganga-mayele bayebaka yango malamumalamu te. Yango wana, ndenge likoló ekozala eyebisamaka na bosikisiki te.

Lokola boyebi ya bato ezali moke mpo na koloba mpenza ndenge likoló ekozala, yango ekundweli biso mituna oyo Yobo atunaki: “Nani abotaki [matanga ya] mamwɛ? Matandala ikobima na libumu na nani? . . . Oyebi [kotombola] mongongo na yo epai na mapata, ete mpela na mai izindisa yo? . . . Nani atii mayele kati na mapata? Nani apesi bososoli epai na londende? Nani akotángaka mapata mpo na mayele? Nani akolalisa mbeki na mai na lola.”​—Yobo 38:28-37.

Eyano na mituna oyo nyonso ezali ete, Moto te, kasi, Yehova Nzambe. Ya solo, bato bazali na mayele, kasi mayele ya Mozalisi na biso eleki mayele ya bato mosika. Yehova amonisi mpenza bolingo na ndenge alakisi biso mayele na ye na kati ya Biblia, mpo ete tólonga na bomoi na biso.​—Masese 5:1, 2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto