“Ezali na makambo mingi oyo biso Bakatolike tosengeli koyekola epai na bango”
MOLAKISI moko na engumba Bari, na ekólo Italie, alobaki maloba wana ntango azalaki koteya istware ya mangomba na eteyelo ya ntei. Molakisi yango ayebisaki banakelasi ete akobanda kosalela kasɛti ya video na ntango azali koteya. Roberto, mwanakelasi moko ya mbula 18, ntango ayokaki bongo asɛngaki molakisi ete alobela mpe lingomba na ye. Apesaki molakisi kasɛti ya video Les Témoins de Jéhovah: Un nom, une organisation. Molakisi andimaki likabo ya Roberto. Mpe banakelasi nyonso oyo bazalaki soko 30 batalaki kasɛti yango. Roberto alobi: “Bango nyonso bakamwaki na komona bomoko, molɔngɔ, mpe bolingo ya Batatoli ya Yehova. Bakamwaki lisusu mingi ntango bayebaki ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaka milio 40 mpe Lamuká! milio 36 sanza na sanza.”
Banakelasi mingi oyo batángaka na Roberto balobaki na ye ete: “Nayebaka te, nzokande bozali na ebongiseli ya malamu boye?” Molakisi alobaki mpo na Batatoli ya Yehova ete: “Bótala ndenge kondima na bango ezali kopusa bango ete bázala na bomoko mpe na molɔngɔ. Ezali na makambo mingi oyo biso Bakatolike tosengeli koyekola epai na bango.” Banakelasi yango bayebaki Batatoli ya Yehova malamumalamu nsima ya kotala kasɛti ya video mpe nsima ya lisolo oyo elandaki na kati ya kelasi.