Bakonzi nyonso ya mangomba bandimaka makambo oyo bateyaka?
MWASI moko auti kokufela mobali. Sango ayebisi ye ete mobali na ye azalaki moto malamu mpenza te mpo akoka kokende mbala moko na likoló, kasi azalaki mpe moto mabe mpenza te mpo bátinda ye na lifelo ya mɔ́tɔ. Na yango, sango alobi ete azali naino kozwa etumbu kino akokóma moto oyo abongi kokenda na likoló. Mwasi yango apesi sango mbongo mpo asala mabondeli ete mobali na ye aumela na epongelo te. Mwasi-mokufeli-mobali yango azali kosepela na likanisi yango, akanisi ete sango mpe andimaka makambo yango lokola ye.
Okanisi ete mwasi yango alingaki kolɛmba nzoto soki ayokaki ete sango ye moko andimaka mpenza te ete moto azwaka etumbu nsima ya liwa? Makanisi ya bato mingi mazali kobulungana na koyoka ete bakonzi mingi ya mangomba bandimaka te makambo mingi oyo bango moko bateyaka. Zulunalo moko (National Catholic Reporter) elobelaki likambo oyo ebéngaki “mokakatano monene oyo eleki ata makambo ya kosangisa nzoto epai ya bakonzi ya mangomba,” ete: “Bakonzi mingi ya mangomba bazali kondima lisusu te ete Nzambe azali. Bazali mpe kondima lisusu te liteya oyo elobi ete bato bakozwa mbano mpe basusu bakozwa bitumbu. Bazali mpe kondima lisusu lisekwa te. . . . Kozanga kondima yango ekɔteli mpenza makanisi ya bakonzi ya mangomba, ndenge mopɛpɛ mabe ezipaka bingumba mosusu.”
Mangomba mosusu mpe ezali na mokakatano yango. Zulunalo Canberra Times ya ekólo Australie, elobeli ankɛtɛ moko oyo esalemaki epai ya bakonzi ya Lingomba ya Angleterre emonisaki ete mingi “bandimaka mateya ya moboko ya boklisto te lokola oyo elobi ete Yesu abotamaki na ngɔndɔ mwasi, bikamwiseli oyo Yesu asalaki mpe koya ya Masiya mpo na mbala ya mibale.”
George Plagenz, mokomi ya makambo ya mangomba, atunaki ndenge nini sango akoki kotánga kredo oyo ye moko andimaka yango te kozanga ete lisosoli na ye etungisama. Sango moko alobaki ete abongolá maloba ya ebandeli ya kredo, “Nayambi.” Alobaki ete: “Nabandaka kredo na maloba oyo, ‘Bayambi Nzambe Tata wa bokasi bonso . . . ’” Plagenz abéngaki bokosi motindo wana ete, “lisano ya kobuba oyo eleki monene na ekólo mobimba.”
Likambo ya mawa ezali ete kozanga kondima ya bakonzi ya mangomba mpe bokosi motindo wana esali ete bato mingi bapesi mangomba nyonso mokɔngɔ. Kasi, lelo oyo makambo mosusu ya mangomba mazali mpe kobulunganisa bato. Bato mingi oyo bakendaka ndakonzambe bateyamaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Soki bayoki ete mateya mosusu oyo lingomba endimaka banda kala mauti na Biblia te, ekokamwisa bango? Lisolo oyo elandi ekolobela ndakisa moko.