Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Komipekisa te mpo na kosakola nsango malamu
NTANGO mindele oyo bautaki na Mpoto bakómaki mpo na mbala ya liboso na Golfe ya Venezuela mpe na Laki Maracaibo, bamonaki bandako mikemike etongami likoló ya mai. Yango ekundwelaki bango engumba ya Venise, na ekólo Italie, esika bato batongá bandako pembenipembeni ya mai. Mindele yango bazalaki bato ya ekólo Espagne. Na nsima bapesaki mboka yango nkombo Venezuela, oyo elimboli “Venise ya moke.”
Lelo oyo, na mboka yango kitoko, bazali kotonga bandako ya ndenge mosusu, bandako ya elimo. Kuna, Batatoli ya Yehova bazali kolona mbuma ya Bokonzi na mabaku nyonso. Mosala ya kobuka mbuma na elimo oyo ezali kosalema kuna ezali kokumisa “Nkolo na elanga,” Yehova Nzambe.—Matai 9:37, 38.
Ntango mokɛngɛli-motamboli moko na mwasi na ye bakendaki na lisangá moko na etúká ya Zulia, na nɔrdi-wɛsti ya Venezuela, Batatoli ya lisangá yango bazwaki bibongiseli mpo ete bákende kotala esanga moko ya penepene nkombo na yango Toas. Na ntɔngɔntɔngɔ, ntango batɛlɛmaki na molɔngɔ mpo na kozela masuwa ya liboso mpo na kokende na esanga yango, Mery mwasi ya mokɛngɛli-motamboli, ayebisaki moninga na ye oyo azali mosakoli ya ntango nyonso ete báteya bato oyo basalaka na kati ya masuwa. Ndeko mwasi mobongisi-nzela andimaki.
Bapusanaki epai ya mekanisiɛ, bongo, Mery alakisaki ye buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Afungolaki na mokapo oyo elobi “Ndenge nini kotonga libota oyo ezali kokumisa Nzambe,” mokapo yango esepelisaki moto wana. Mery ayebisaki ye ete na lisalisi ya buku wana, akoki koyekola Biblia na ndako na ye. Azwaki buku, mpe bayokanaki mpo moto moko akendaka kotala ye na ndako.
Nsima ya mwa mikolo, liyangani ya mokolo moko esalemaki na esanga wana. Mery akamwaki ntango akutanaki na mekanisiɛ yango, nkombo na ye Senor Nava, na mwasi na ye mpe bana na bango mibale ya basi ya mike na liyangani! Mery atunaki mwasi yango ndenge nini azalaki komona boyekoli na bango ya Biblia na libota. Eyano na ye ekamwisaki Mery mingi.
Alobaki boye: “Nazali kotɔnda Yehova ndenge tozali koyekola solo.” Na nsima alimbolaki: “Ntango bosololaki na mobali na ngai, autaki koboya ngai mpe azwaki mwasi mosusu. Azalaki mpe kolangwa masanga. Mbala mingi soki alangwe masanga, azalaki kosala makambo mabe oyo bato ya esanga bazalaki kosepela na yango te. Azalaki mpe na boyokani na bilimo mabe. Nzokande, boyebi ya Biblia oyo azali kozwa na boyekoli ezali kosalisa ye mingi mpo na kobongwana. Atiki misala nyonso ya mbindo. Baboti na ye bazali Bakatolike, bakamwaka mingi na ndenge abongwani. Basepelaka, mpamba te sikoyo azali kokokisa malamu mikumba na ye lokola mobali mpe tata ya libota.”
Senor Nava azwaki batisimo na 1996 mpe sikoyo azali mosakoli ya ntango nyonso. Mwasi na ye Jenny, azwaki batisimo na 1997. Mokambi ya engumba akamwaki mpo na ndenge oyo mekanisiɛ wana ya masuwa abongwanaki, ye moko mpe asɛngaki ayekola Biblia. Oyo nde esengo bandeko basi bazali na yango mpamba te bamipekisaki te mpo na kosakola nsango malamu ntango bazalaki na molɔngɔ kozela masuwa mokolo wana na ntɔngɔ!
[Bililingi na lokasa 7]
Kosakola nsango malamu epai ya mekanisiɛ ya masuwa, ebimisi matomba ya esengo