Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/9 lok. 32
  • Biblia ya sika na lokota Greke ya mikolo na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ya sika na lokota Greke ya mikolo na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/9 lok. 32

Biblia ya sika na lokota Greke ya mikolo na biso

MOKOLO ya 23 Augústo 1997, ezalaki mokolo monene mpo na bato oyo bayanganaki na Liyangani ya Etúká na ekólo Grèce oyo ezalaki na motó na likambo “Kondima kati na Liloba ya Nzambe.” Na nsuka ya eteni ya nsima ya midi, babimisaki Biblia ya sika Makomami mosantu Libongoli ya Mokili ya sika na lokota Greke. Bayangani bakamwaki, balelaki na esengo mpe babɛtaki mabɔkɔ ntango molai!

Kobanda 1905, Batatoli ya Yehova bazalaki kosalela Biblia oyo bakonzi ya Lingomba ya Ortodokse ya Grèce babongolaki na ekeke ya 19. Biblia yango esungaki bango na boumeli ya bambula mingi. Kasi, uta mwa ntango, Batatoli ya Yehova bazalaki na mposa ya libongoli ya Biblia oyo ezali mpenza malamu mpe ezali pɛtɛɛ mpo na kotánga. Na 1993, basepelaki mpamba te bazwaki Libongoli ya Mokili ya sika ya Makomami ya Greke ya boklisto na lokota Greke. Nzokande, na mbala oyo, basepelaki lisusu mingi wana bazwaki Biblia mobimba na lokota Greke ya mikolo na biso.

Motatoli moko alobaki ete Libongoli ya Mokili ya sika ezali “maloba ya ntɔki, mwa mopɛpɛ kitoko oyo ezali komema mongongo ya Yehova oyo, mpo na mbala ya liboso, tokoki kososola yango polele na lokota na biso moko.” Bamoko babandaki kotánga Biblia na bango ya sika ntango kaka bakómaki na ndako. Ndeko moko oyo azalaki na liyangani atángaki Biblia kino na ngonga ya yambo ya butu, wana asilisaki kotánga mokanda ya Yobo mobimba!

Makomami mosantu Libongoli ya Mokili ya sika ezali mbuma ya mosala oyo esalemi na likebi nyonso na boumeli ya mbula soko nsambo. Mokanda moko tozwaki elobaki boye: “Bómindimisa ete Libongoli ya Mokili ya sika ekosunga biso mingi mpo na kosalisa bato ya mitema sembo ete báyeba Yehova.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto