Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/9 lok. 29
  • “Bósimba makasi eloko oyo bozali na yango”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bósimba makasi eloko oyo bozali na yango”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Kolendendela ememaka na bokóli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Ndenge ya koyeba moto oyo tosengeli kotosa
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/9 lok. 29

“Bósimba makasi eloko oyo bozali na yango”

Etuluku moko ya Batatoli ya Yehova bazalaki kosakola na moko na bisanga Cyclades oyo ezali soko 30 na ekólo Grèce. Batatoli mibale bazalaki kosakola ndako na ndako na balabala moko, bakutanaki na polisi moko oyo alobaki na bango ete bálanda ye kino na biro ya bapolisi. Mwa moke nsima ya kokóma na biro ya bapolisi, telefone elelaki. Ezalaki sango ya mboka nde abéngaki. Alobaki ete: “Nayoki ete Batatoli ya Yehova bazali kati na mboka.” Polisi ayanolaki ete, “Ɛɛ, nazali na mibale awa.” Sango alobaki ete, “Nazali koya sikawa.” Na kolandáká ndenge lisolo elekaki, bandeko babandaki komituna soki nini elingi kokómela bango.

Nzokande, ntango akómaki, sango asɛkaki, apesaki bango mbote, mpe afandaki na kiti oyo ezalaki pene ya polisi. Ntango bazalaki kosolola polisi abandaki kosilika, kasi sango azalaki na boboto mpe na bonkonde. Ayebisaki polisi ete atyolaka Batatoli te, mpe abakisaki ete: “Bakoki koyanola ata na motuna nini mpamba te bayekolaka na Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi. Okoki kolongola mokili na moboko na yango mpe kokweisa yango na bolɛmbu, kasi kolongola Motatoli ya Yehova moko na lingomba na ye ezali likambo ya pɛtɛɛ te.”

Ntango bazalaki kosakola na mokolo elandaki, bandeko bakutanaki lisusu na sango yango mpe batunaki ye boye: “Mpo na nini omoniselaki biso boboto na biro ya bapolisi?” Sango ayebisaki bango ete ayebanaki na Batatoli mingi na esanga Syra mpe atángaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! uta bambula mingi. Kutu, na mabaku mingi azalaki kozwa zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, azalaki kobomba yango na farde moko, mpe azalaki koteya na yango na ndakonzambe. Alobaki boye: “Namonaka ete ntina ya bomoi elingaki kozala te soki nazalaki kozwa mikanda na bino te. Ezali yango nde epesaka ngai elikya.”

Na nsima, sango alobaki na Batatoli ete: “Nalingi koyebisa bino likambo moko. Bósimba makasi eloko oyo bozali na yango. Bósala bozoba te mpe bótika yango te. Likambo nazali koyebisa bino sikawa ezali liteya oyo eleki malamu kati na mateya nyonso napesá, mpe nazali koloba yango bobele mpo na esengo ya koloba te; euti mpenza na motema na ngai.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto