Okoki kokesenisa mabe na malamu?
“Ngai moko nabomaká bato soko 25. . . . Mikolo nyonso na butu, bililingi yango ezongelaka ngai na makanisi. Nalɔtaka bandɔtɔ ya mabe. . . . Mbala mosusu nakoki kokende esika moko mpe namoni elongi oyo ekokundwela ngai bato oyo nabomaká. Ezali naino polele na kati ya makanisi na ngai, lokola ete likambo yango esalemi kaka lelo, sikasika oyo. . . . Nakoki kobosana mabe oyo nasalá te.”—V.S.
“Mitindo ekweaki ete nakɔta mpe naboma banguna. . . . Nazalaki na ntango ya kofanda mpe kokanisa te soki ezalaki mibali, basi to bana. . . . Na ntango wana namonaki mpe namonaka bongo tii lelo ete nasalaki se oyo batindaki ngai, nakokisaki mitindo oyo bapesaki ngai mpe nayokaka mabe moko te na ndenge nasalaki.”—W.C.
NA MOKOLO ya 16 Mársi 1968, bato mibale oyo tozongeli maloba na bango awa basalaki likambo oyo na nsima ebéngamaki ete likambo ya nsɔmɔ na kati ya etumba. Bango na basoda mosusu, bakɔtaki na mwa mboka moko moke na ekólo Vietnam mpe babomaki basilivi ebele—basi, bana, mpe mibange. Kasi talá bokeseni ya mayoki ya basoda yango mibale. Oyo ya liboso amitungisi mpenza mpo na likambo oyo asalaki. Kasi oyo ya mibale amoni ete asalaki mabe te. Ndenge nini bato mibale bakoki kotalela likambo se moko na ndenge ekeseni?
Etali nde lisosoli—likoki oyo Nzambe apesá biso mpo esalisaka biso ete tómitalelaka na bosembo nyonso mpe tómitunaka na ntina na misala na biso mpe mikano na biso. Lisosoli ezali liyoki ya nse ya motema oyo esalisaka biso ete tókesenisaka mabe na malamu.
Bato mosusu, ntango bazali kozwa bikateli, bakanisaka maloba oyo: “Salá oyo lisosoli na yo ekotinda yo.” Kasi, likambo ya mawa, lisosoli ezalaka eloko ya kotyela motema ntango nyonso te. Bato mingi bandimaki ete makambo ya nsɔmɔ esalema to mpe bango moko basalaki yango mpe kasi lisosoli na bango etungisamaki ata moke te. (Yoane 16:2; Misala 8:1) Lokola Samuel Butler, mokomi ya mikanda mpe moto ya ekólo Angleterre alobaki yango, “epai na baoyo balingi koyokela yango te, lisosoli esalaka lisusu te.”
Okoki koyokela lisosoli na yo? Lisolo oyo elandi ekomonisa ete eyano etaleli mingimingi ndenge lisosoli yango eteyami.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Etumba: U.S. Signal Corps photo