Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/8 lok. 18
  • Bazali kolanda banzela ya Yehova na komikitisa nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kolanda banzela ya Yehova na komikitisa nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Luká Yehova liboso ete mokolo ya nkanda na ye eya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mokanda ya Biblia nimero 36—Sefania
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Bóluka Yehova liboso mokolo ya nkanda na ye eya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Libota ya Yehova ezongi mpe ezali kokumisa ye na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/8 lok. 18

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Bazali kolanda banzela ya Yehova na komikitisa nyonso

“BÓLUKA [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso na mokili.” Esili koleka bikeke 26, Sefania, mosakoli Moebele asakolaki libyangami oyo. Lelo oyo libyangami yango ezali kokómela bato kati na mokili mobimba. (Sefania 2:3) Koluka Yehova elimboli nini? Yango ebandaka na kozwa boyebi ya Yehova, Nzambe bobele moko ya solo mpe oyo azali na bomoi.​—Yilimia 10:10; Yoane 17:3.

Nzokande, Nzambe akondima moto kaka mpo azali na boyebi te. Mpo ete Nzambe andima moto, asengeli kosalela boyebi yango. Ndenge nini? Na koyokanisáká makanisi mpe etamboli na ye na mitinda ya Nzambe na komikitisa nyonso, na ndenge lisolo elandi, oyo esalemaki na Suriname emonisi yango.​—Baefese 4:22-24.

Eddy, azali molakisi mpe azali na mbula koleka 30. Azalaki na mposa makasi ya kozwa biyano ya malamu na mituna lokola oyo: ‘Lingomba ezali na ntina nini na bomoi ya bato lelo oyo?’ mpe ‘Biblia, ezali buku ya kalakala, ekoki nde koyokana na siansi ya ntango na biso?’ Ntango Batatoli ya Yehova bayaki epai na ye mpe bapesaki ye biyano biuti na Biblia na mituna yango, Eddy ayokaki bango na likebi mpenza. Azwaki mpe banoti mpo na koluka soki bandimbola oyo Batatoli ya Yehova bapesaki ye ezalaki solo.

Liboso, Eddy azalaki na lingomba moko oyo eteyaki ye ete Nzambe azalisaki bato uta na makako. Yango wana, ntango Batatoli ya Yehova bapesaki ye buku La vie : comment est-elle apparue ? Évolution ou création ? akamataki yango mbala moko. Akamwaki na ndimbola ya polele Biblia ezali kopesa na ntina na bozalisi. Wana azalaki koyekola Biblia, amindimisaki ete azwaki solo!

Kasi akutanaki na komekama. Eddy azalaki kofanda na ndako oyo bato bamesanaki koyiba mpe bazalaki sembo te. Na bongo, asengelaki kopona: kolanda banzela mabe ya baninga oyo afandaki na bango ndako moko to koboya etamboli wana mpe kozala na bomoi oyo ezali kokumisa Nzambe. Na mayele nyonso, Eddy aponaki bomoi oyo ekokumisa Nzambe. Atikaki kotambola na baninga nyonso ya mabe mpe abimaki na ndako.​—1 Bakolinti 15:33, 34.

Abandaki koyangana na makita mpe akolaki noki na elimo. Abongisaki elateli na ye mpe abandaki koyebisa baninga mpe bandeko na ye makambo oyo azalaki koyekola. Na nsima, esengo na ye ebakisamaki ntango bandimaki ye ete akóma mosakoli ya “nsango malamu.” (Matai 24:14; Misala 20:20) Na Desɛ́mbɛ 1996, mokolo oyo azelaki uta kala ekómaki ntango amonisaki elembo ya komipesa na ye na Yehova na nzela ya batisimo ya mai.

Mbula na mbula, bankóto ya bato ya mitema sembo bazali kondima libyangi ya ‘koluka Yehova.’ Na kosaláká bongo, bazali komona bosolo ya Masese 22:4, oyo elobi ete: “Kosɔkɛma mpe kotosa [Yehova] ezali nzela na bozwi mpe lokumu mpe bomoi.” Ɛɛ, wana bazali kolanda banzela ya Yehova na komikitisa nyonso, bato oyo balingaka solo bazali kozwa mapamboli motindo yango sikawa, mpe bazali kozela na elikya nyonso mapamboli ya seko oyo bakozwa awa na mabelé.​—Nzembo 37:29.

[Karte na lokasa 18]

For fully formatted text, see publication

Mer des Antilles

SURINAME

GUYANA

GUYANE FRANÇAISE

BRÉSIL

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Globe: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto