Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/7 lok. 32
  • “Ndakisa ya bomoko mpe ya bondeko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ndakisa ya bomoko mpe ya bondeko”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/7 lok. 32

“Ndakisa ya bomoko mpe ya bondeko”

Yango ezali lolenge mwasi moko alobaki mpo na misala ya Batatoli ya Yehova nsima ya kotungisama na ntina na liwa ya moto moko na libota na ye. Alimboli ete:

“Na nkombo na ngai moko mpe na nkombo ya libota na ngai, nalingi kotɔ́nda Batatoli ya lisangá ya lokota Italien, ya engumba Friburg, na ekólo Allemagne. Longola bobele yaya na ngai Antonio na mwasi na ye Anna, libota mobimba tozali Batatoli ya Yehova te. Uta kala tozalaki kotyola lingomba oyo bango baponaki, kasi totosaka liponi na bango.

“Nzokande, sikawa, tosengeli kobongola makanisi na biso. Na yango, tomoni ndakisa moko ya bondeko mpe ya bolingo oyo tokanisaki te ete tokomona yango.

“Likambo ya mawa, Anna akufaki liwa ya mobesu na likama ya motuka. Lokola tofandaka na Italie, tokokaki kopesa ndeko na biso Antonio na bana na ye bobele mwa lisungi moke. Kasi, bandeko na ye ya lisangá basungaki ye. Basungaki ye wana bazalaki kokende kotala ye, na maloba na bango, na kondima na bango, na misala na bango, na bilendiseli mpe na mosolo. Lokola nakoki te kokende kopesa botɔ́ndi na ndeko mokomoko ya lisangá, nazali kotɔ́nda bango na nzela ya zulunalo na bino mpo na ndakisa na bango ya bomoko mpe ya bondeko oyo tokobosana yango te.”

Maloba ya boboto ya mwasi oyo eyambami malamu. Ndenge amonaki yango, Batatoli ya Yehova bazali bandeko kati na mokili mobimba. (1 Petelo 2:17) Balendisaka bolingo makasi kati na bango, koyebáká ete bolingo “ezali ekanganeli ekoki mpenza.” (Bakolose 3:14) Ata na ntango ya mpasi makasi oyo ekoki kokómela biso nyonso, Batatoli ya Yehova batikalaka penepene ya Nzambe mpe ya bato na ye.​—Masese 18:24; Mosakoli 9:11; Yoane 13:34, 35.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto