Maloba na yo ezokisaka to ekitisaka motema?
NA NTANGO oyo ya mpasi, ezali mpenza likambo ya kokamwa te ete bato mingi bazali na “mitema mitutami” mpe ‘elimo enyatami.’ (Nzembo 34:18) Na yango, ntoma Paulo alobaki ete esengeli ntango nyonso “kozala na maloba ya kobɔndisa epai na molimo motungisami na makanisi” mpe “kosunga bato ya bolɛmbu.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) Kasi ezali boni soki mozalani na biso azokisi biso na maloba to asaleli biso likambo moko ya mabe mpenza? Na likambo motindo oyo, tokoki kokanisa ete tozali na elonga ya kopamela ye na maloba makasi. Nzokande, tosengeli kokeba. Toli, ata soki ezali malamu, ekoki koyokisa mpasi soki epesami na lolenge mabe. Masese 12:18 elobi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbeli.”
Yango wana, ntango tolingi kosembola to kozongisa boyokani, ebongi tókanisaka na eteni ya mibale ya Masese 12:18 oyo elobi ete: “Lolemo na bato na mayele ezali na bomoi.” Omitunaka ntango nyonso ete: ‘Soki esengelaki ete básembola ngai, nakolinga ete básala yango ndenge nini?’ Mingi kati na biso tosepelaka na maloba ya kolendisa kasi ya kofinga te. Yango wana, tóyeba kokumisa bato. Yango ekopusa motuki ete asalaka malamu, mpe akozala na matɔ́ndi mpo na lisungi nyonso oyo bakopesa ye.
Ezali likambo ya ntina mingi ete tólɛmbisaka maloba na biso na bopɔlɔ! Maloba ya kokitisa motema ekotikela moyoki na yango mayoki lokola oyo mokomi na nzembo akomaki ete: “Tiká ete moyengebene abɛta ngai, malamu bongo; tiká ete apesa ngai toli; ekozala lokola mafuta malamu; motó na ngai ekoboya yango te.”—Nzembo 141:5.