Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/6 lok. 8
  • Na mabaku nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na mabaku nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Loboko na Jehovah ezalaki elongo na bango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/6 lok. 8

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Na mabaku nyonso

BATATOLI YA YEHOVA bayebani na mokili mobimba mpo na mosala na bango ya kopesa bato mateya ya Biblia. Kasi bazali lisusu kopesa mateya oyo mazali kopesa bato matomba na esika oyo bafandi. Bato bazali kosepela na mosala yango, ndenge emomisami na masolo elandi na ekólo Équateur.

◻ Bakambi ya izini moko monene oyo esalaka batalatala balingaki kobongisa mateya likoló na makambo ya ntina kati na libota mpo na basali na bango. Mokambi ya departema oyo etali makambo ya basali abéngisaki basángó mingi ya Lingomba ya Katolike mpo na kopesa mateya kasi bayaki te. Sángó moko ayebisaki ye ete bobele basángó moke nde bazali na makoki mpo na koteya makambo wana kasi moko te akoya. Ntango ayokaki likambo yango, Motatoli moko ya mwasi oyo asalaka na kompanyi yango, azwaki bibongiseli mpo ete ndeko moko ya mobali oyo mbala mingi ateyaka na teritware ya mombongo akende koteya na izini na bango.

◻Na mokolo elandaki, Motatoli yango akutanaki na mokambi ya departema yango mpe ayebisaki ye ete asepeli kopesa basali mateya. Na lisalisi ya mikanda ndenge na ndenge ya la Société Watch Tower, aponaki molɔngɔ ya makambo oyo akoteya. Mokambi akamwaki. Aponaki mitó na makambo misato ya kosolola—boyokani kati na basali, bizaleli malamu na esika ya mosala, mpe bizaleli malamu kati na libota. Bibongiseli bikamatamaki mpo ete bátalela likambo yango elongo na basali nyonso.

◻Basali bakabolamaki na bituluku nsambo ya bato 30. Na nsima, bandeko misato ya makoki bapesaki bango mateya. Matomba nini emonanaki? Basali mingi basɛngaki na bandeko ete bátalaka bango na bandako na bango, mpe bakabolaki mikanda oyo mikolimbolaka Biblia 216. Bakambi bakamwaki mingi na boye ete batunaki Batatoli soki bakokaki kobongisa mateya mosusu.

◻ Mikolo mileki, ekólo Équateur ebimisaki mobeko oyo epesaki nzela na koteya mateya ya lingomba na biteyelo. Misionere moko ya mwasi atunaki mwasi moko mokambi ya eteyelo ya ebandeli ndenge nini bazalaki kosalela mobeko wana ya sika. Mokambi alimbolaki ete bamekaki kobanda manaka likoló na losambo ya Malia kasi elongaki te. Ntango ndeko mwasi amonisaki ete losambo yango ekobimisa mikakatano epai ya bana oyo bazali Bakatolike te, mokambi andimaki. Misionere alobaki ete: “Nzokande, biso tozali na manaka ya koteya bizaleli malamu euti na Biblia, oyo ekosɛngisa moto te ete andima lingomba moko na makasi.” Mokambi atunaki ete: “Okoki koya mokolo nini? Lobi lokoya?” Nsima wana misionere alakisaki ye buku Boyoka Moteyi Monene, bayokanaki ete bakotalela mokapo “Esengo na bato ya kimya.”

◻Ntango azongaki lisusu, misionere alekisaki ngonga misato koteyáká na kelasi nsambo mpe mokambi azalaki koyoka ye. Nsima ya koteya banakelasi ya mitano, mwanakelasi moko alobaki ete: “Madame, nalɔmbi yo oteya mpe bana ya kelasi ya motoba. Bango, ntango nyonso balukaka kobɛta biso mpe kobanda bitumba!” Molakisi moko ya mwasi alobaki ete: “Mobulu ezali motó na likambo ya ntina mingi. Tozali na mposa ya ntango mingi mpo na kolobela likambo yango.”

◻Bibongiseli bikamatamaki ete azonga lisusu na eteyelo mpo na koteya masolo lokola botosi mpe lokuta. Kobanda ntango wana, matomba mazali mpenza ya malamu. Sikawa, ntango ndeko mwasi misionere atambolaka na nzela, bana bayaka mbangu kopesa ye mbote mpe kotuna mituna ya Biblia. Basusu na esengo nyonso balakisaka ye epai ya baboti na bango. Lisusu, asili kobanda boyekoli ya Biblia na ndako elongo na banakelasi mibale.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto