Mpo na nini te kozala na bango elongo?
NDJAUKUA ULIMBA, azali na mbula 73, mpe na mbula eleki asalaki mobembo ya kilomɛtɛlɛ 450. Atambolaki na makolo mikolo 16.
Mobange yango asalaki mobembo molai wana mpo na koyangana na liyangani moko oyo Batatoli ya Yehova basalaka mbula na mbula. Nsima ya liyangani, motema na ye etondaki na esengo mpe alendisamaki na elimo, atambolaki lisusu na makolo mpo na kozonga epai na ye—asalaki lisusu mobembo ya mikolo 16. Milende yango ezalaki mpenza na ntina? Ɛɛ! Ndjaukua Ulimba asalaka mobembo wana mbula na mbula uta mwa bambula mingi.
Mobali yango, moto ya Afrika, azalaki moko na bato koleka milio 15 oyo bautaki na mikili koleka 230 bazalaki na mayangani ya Batatoli ya Yehova na mbula eleki. Ya solo, mingi batambolaki na boumeli ya mikolo mingi te mpo na kokóma na esika ya liyangani. Bato mingi bayaki na motuka, bisi, engbunduka, to mpɛpo. Yo mpe ozalaki kati na bango?
Na 1998, mayangani makosalema lisusu na mokili mobimba, mingi ekozala na eleko ya molunge (to eleko ya elanga). Soki akozala nzoto kolɔngɔnɔ, na ntembe te Ndjaukua Ulimba akotambola lisusu ntaka molai wana mpo na kozala na liyangani. Ye mpe bamilio mosusu ya bato bakolanda manaka ya masolo kitoko, oyo ekolendisa kondima, mpe ekobakisa nguya na bango. Mpo na baoyo nyonso bakozala kuna, liyangani ekozala likambo ya ntina mingi kati na mobu. Yo mpe obyangami na esengo mpo na kozala wana. Batatoli ya Yehova ya mboka oyo yo ofandi bakosepela kolakisa yo esika ya penepene epai liyangani yango ekosalema.