Tobyangi yo osangana na biso na molulu moko ya ntina mingi na mokolo ya pɔsɔ, 11 Aprili 1998
BATATOLI YA YEHOVA babyangi yo na esengo nyonso ete oya kosangana na bango elongo mpo na kokanisa likabo oyo Nzambe apesaki, elingi koloba Mwana na ye Yesu Klisto. Likabo yango efungwelaki bato elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé.—Yoane 3:16.
Na mbula oyo, Ekaniseli ya liwa ya Yesu ekosalema na mokolo ya pɔsɔ, 11 Apríli 1998, nsima ya kolala ya moi. Dati yango ekokani na mokolo ya 14 Nisana na manaka ya Biblia. Tosɛngi yo otuna Batatoli ya Yehova na engumba epai ofandi mpo na koyeba esika mpe ngonga oyo molulu yango ekosalema.