“Ezali na nguya mpe ezali kondimisa”
MOTATOLI moko ya Yehova na ekólo France akomaki ete, “Kobanda lobi nakosalela yango na mosala ya kosakola, mpo ete makambo mazali na kati mazali na nguya mpe mazali kondimisa.” Motatoli moko na États-Unis akomaki ete: “Natángaki yango bobele ntango nazwaki yango mpe nakozela te mpo na kosalela yango na mosala ya kosakola, lokola tokutanaka na bato ebele oyo bamonisaka bosepeli te, mpe oyo bandimelaka Biblia te.” Bazalaki kolobela eloko nini? Mwa buku ya nkasa 32 oyo ezali na motó na likambo ete Un livre pour tous (Buku mpo na bato nyonso), oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower na liyangani ya etúká oyo esalemaki na boumeli ya 1997 kino 1998, oyo ezalaki na motó na likambo ete “Kondima kati na Liloba ya Nzambe.”
Mokanda oyo ebongisamaki mpo na kosunga mpenzampenza—bato oyo mbala mosusu batángá kelasi mingi kasi bayebi makambo mingi te na ntina na Biblia. Bato mingi ya motindo oyo bamisalelá makanisi na bango na ntina na Biblia, atako batángá naino yango te. Mokano ya mwa buku oyo ezali ya kondimisa batángi ete, ata na makambo ya mikemike, ebongi ete tótalelaka Biblia. Mwa buku yango ezali kotindika batángi na makasi te bándima ete Biblia epemami na Nzambe. Nzokande, ezali kotika nzela na makambo oyo mazali solo máloba yango moko. Maloba na yango ezali ya komikumisa te kasi ya polele mpe ya sikisiki.
Ndenge emonisami na maloba oyo mazwami na likoló, baoyo bazalaki na mayangani bayokaki mposa makasi ya kosalela mwa buku yango na mosala ya kosakola. Na ndakisa, na ekólo France, basalaki kampanye ya sipesiale mokolo ya 23 mpe ya 24 Augústo, mpamba te bankóto ya bilenge bautaki na mokili mobimba bayaki na engumba Paris mpo na kosepela mokolo oyo ebéngami ete ‘Mokolo ya bilenge ya mokili mobimba.’ Batatoli soko 2 500 (mingi bazalaki na mbula kobanda 16 kino mbula 30) bakabolaki mwa buku 18 000 na lokota ya Lingelesi, ya Lifalansé, ya Allemand, ya Italien, ya Polonais, mpe ya Espagnole.
Na mabaku nyonso, tósalela mwa buku, Un livre pour tous, na mosala na biso ya kosakola. Tiká ete tósalela malamu mokanda oyo mpo na kondimisa bato oyo bazali na makanisi malamu ete basengeli kotalela Biblia bango moko.