“Biblia ya mosapi moko”
NSIMA ya bokɔnɔ makasi, Joseph Schereschewsky akómaki mokatatali, akokaki kokoma bobele na kobɛta na masini, na kosaleláká bobele mosapi moko. Atako bongo, akokisaki mokano na ye: kobongola Biblia na lokota Chinois, moko ya lokota eleki mpasi mpo ete mopaya ayeba yango malamu.
Schereschewsky, Moyuda ya kobotama, asalaki bolukiluki mpe andimaki mateya ya boklisto ntango akómaki mokóló. Na nsima, akómaki misionere na ekólo Chine. Kuna, asanganaki na misala mingi ya bobongoli, kobanda na mobu 1866 mpe akóbaki kino na ebandeli ya ekeke ya 20. Lokola azalaki Moyuda, Schereschewsky ayebaki lokota Liebele malamu koleka baninga na ye banganga-mayele. Na bongo, bapesaki ye mokumba ya kobongola Makomami ya Liebele na mobimba na yango. Pene na nsuka ya mosala na ye oyo ezalaki molai, abongolaki lisusu Biblia mobimba oyo ezali na mitindami (références), na lokota Chinois.
Lokola azalaki mobongoli ya Biblia, Joseph Schereschewsky azalaki molobeli makasi ya kobongola Biblia na lokota oyo bato nyonso bayebaki. Kasi mokumba na ye ezalaki pɛtɛɛ te. Buku The Book of a Thousand Tongues (Buku ya nkota mingi), elobi ete: Lisungi na ye oyo ekesenaki na masungi nyonso, “mpo ete yango ezalaki polele mpe akomaki yango kati na mikakatano mingi.”
Ata nsima ya kokóma mokatatali na mabɔkɔ, akobaki mosala na ye. Kokoma na masini ezalaki kosɛnga milende makasi, mpamba te akokaki lisusu kosalela mabɔkɔ na ye malamu te. Yango wana abengaki libongoli yango na ye ete Biblia ya mosapi moko. Atako akómaki mokatatali, Schereschewsky alendendelaki na boumeli ya mbula 25, mpo na kobongola Biblia wana. Na etingya, asalaki ete bato básosola Liloba ya Nzambe na lokota Chinois—lokota oyo eleki kolobama na mokili mobimba.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 11]
Bililingi nyonso: Na ndingisa ya American Bible Society Archives