Liyangani “ya kokamwa” ekumisami
MOPANZI-NSANGO na radio moko ya engumba Lima, na ekólo Pérou, azalaki na ntembe makasi na ntina na Batatoli ya Yehova. Nzokande, nsima ya kokende na liyangani moko ya etúká oyo basalaki, abongolaki mpenza makanisi na ye. Ya solo, akamwaki mingi na boye ete alobaki malamu na ntina na bango na emisyó na ye. Alobaki makambo lokola oyo:
“Liyangani ezalaki solo ya kokamwa. Ezalaki ata na papyé moko te na mabelé mpe ata motɛkisi moko te azalaki na zingazinga. Bato batambolaki na mobulu te. Bato nkóto mitano na nkámá mibale bakendaki na libándá ya masano na mbongo na bango moko, moto na moto amemaki katini, biteni ya bilamba mpo na kolongola mai, eloko ya kolongola mputulu, nkɔmbɔ, bolɔsi, ba gants mpe sabuni mpo na kosukola mpe kopɛtola esika yango. Bapakolaki langi na esika oyo bamonaki ete ebongaki na langi. Kasi mbongo mpo na kosala misala yango eutaki wapi? Epai na bango moko! Ntango bayebisi bango ete eloko moko esengelaki kosalema, nokinoki bazalaki kopesa mbongo. Solo mpenza, Lingomba ya Katolike ezali kolala mpɔngi na makambo ya motindo oyo. Nalingi kopesa Batatoli ya Yehova longonya mpe na babongisi ya liyangani oyo. Mpe nalingi koloba na bango uta na kati ya motema na ngai ete, Nzambe asunga bino mpe apambola bino.”
Kati na bingumba nyonso na mokili mobimba na mbula oyo, Batatoli ya Yehova bakoyangana na liyangani ya etúká na motó na likambo ete “Lolenge ya bomoi oyo Nzambe andimaka.” Okozala wana?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 32]
“Ezalaki ata na papyé moko te na mabelé”