Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/3 lok. 7
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova bayanganaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova bayanganaka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”—Liyangani ya etúká to ya mikili mingi mpo na mobu 1998
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • “Liloba ya esakweli ya Nzambe”​—Liyangani ya etúká mpo na 1999
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mayangani ezalaka ntango ya esengo oyo tomonisaka mpenza bondeko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mayangani na biso ya etúká epesaka litatoli monene mpo na solo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/3 lok. 7

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bayanganaka?

MBULA na mbula bankóto ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bayanganaka na mayangani minene. Kuna, basepelaka kokutana na bandeko na bango mpe kolanda mateya ya malamu mpenza mauti na Biblia. Bamoko bazali kosala milende mpo na kozala na mayangani yango. Na ndakisa, na mbula eleki, na ekólo Malawi, babalani mibale oyo bazali na mbula koleka 60, elongo na mwana na bango ya mobali oyo azalaki na mwasi na ye mpe na bébé na bango, batambolaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 80 na velo mpo na kozala na liyangani. Balongwaki na mboka na bango na ngonga ya motoba ya ntɔngɔ mpe nsima ya kotambola ngonga zomi na mitano bakómaki na esika ya liyangani.

Na ekólo Mozambique, etuluku moko ya Batatoli ya Yehova batambolaki mikolo misato na velo mpo na kokóma na liyangani. Na butu moko, lokola bazalaki kopema sé na libándá, bayokaki bankosi konguluma penepene na esika bazalaki. Atako babwakaki nkoni oyo ezalaki kopela mɔ́tɔ epai banyama bazalaki mpo na kokimisa yango, bankosi bafandaki na esika bazalaki kino ntɔngɔ etanaki. Motatoli mosusu oyo azalaki kokende sé na liyangani yango akutanaki na nkosi na nzela. Atɛlɛmaki kozanga koningana kino nkosi elekaki. Kati na liyangani Batatoli wana bayebisaki na esengo nyonso ndenge nini ‘basikolamaki na monɔkɔ ya nkosi.’—2 Timoté 4:17.

Batatoli ya Yehova mingi basalaka milende makasi mpo na kozala na mayangani to mpe na makita ya lisangá pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na losambo. Mpo na nini? Masolɔ malandi makosalisa yo ososola mpo na nini koyangana elongo ezali na ntina mingi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto