Nzambe akoboma mokili oyo?
ENGEBENE Pápa Jean-Paul II, bato bakoki kozala na kobanga te mpo na mikolo mizali koya. Alobaki ete, na boumeli ya lisoló mobimba ya bato, “bato bazalaki ntango nyonso kosala masumu, kutu mbala mosusu basalaka masumu minene koleka ata oyo elobami ete esalamaká liboso ya mpela.” Pápa alimbolaki ete, atako bongo, “tozali kososola maloba oyo mazwami kati na kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na Noa ete, sikawa ezali na lisumu te oyo ekoki kopusa Nzambe ete aboma mokili oyo ye moko azalisaki.”
Ezali solo ete Nzambe akoboma lisusu mokili te? Biblia elobi ete nsima ya mpela, Nzambe alobaki na Noa ete: “Mosuni nyonso ekokufa na mai na mpela lisusu te, mpe mpela na kobebisa mokili ekozala lisusu te.” (Genese 9:11) Pápa alobaki ete na maloba wana, Nzambe “amipesaki mokumba ya kobatela [mabelé] mpo ete ebebisama te.”
Biblia emonisi polele ete Mozalisi akopesa nzela te ete etando na biso ebebisama. “Mokili ekoumela seko,” Biblia elobi bongo. (Mosakoli 1:4) Kasi ezali na makambo mingi oyo tosengeli koyekola na ntina na Mpela—likambo yango pápa alobelaki yango te.
Yesu alobaki ete na ntango ya kozala na ye na mikolo mizalaki koya makambo na mokili masengelaki kozala ‘lokola ezalaki [na] mikolo na Noa,’ wana bato “bayebaki likambo te kino mpela eyaki mpe elongolaki bango nyonso.” (Matai 24:37-39) Ntoma Petelo mpe akomaki ete lokola ‘mokili na ntango yango ezindaki mpe ebomamaki,’ bobele bongo ‘mokolo na kosambisa mpe na koboma bato bakotyolaka Nzambe’ ezali kozela mokili ya ntango oyo.—2 Petelo 3:5-7.
Yesu na Petelo babosanaki nde kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na Noa? Soko moke te! Lokola alobaki yango na kondimana elongo na Noa, Nzambe akosalela mai ya mpela te mpo na kotya nsuka na ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo. Akosalela nde nguya ya “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo,” Yesu Klisto. (Emoniseli 19:11-21) Nzokande, engebene Biblia, ntembe ezali te ete mabelé ekobebisama te, kasi “mokili”—bato na misala mabe—ekosuka. (Masese 2:21, 22; Emoniseli 11:18) Na nsima, “bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.