“Yango ezali kondimana ya sika ‘interlinéaire’ oyo eleki malamu na mikolo na biso”
EZALI na maloba wana nde Dr. Jason BeDuhn alobeli Biblia Les Écritures grecques — Traduction interlinéaire du Royaume [Lingelesi]. Alimboli boye:
“Nauti kosilisa kotángisa bana mateya ya teoloji na Iniversité ya Indiana, na engumba Bloomington, na États-unis. . . . Yango etalelaki libosoliboso Baevanzile. Lisungi na bino emonanaki na nzela ya Biblia, Les Écritures grecques — Traduction interlinéaire du Royaume oyo bayekoli na ngai basalelaki yango lokola moko na babúku mpo na kolanda mateya. Bavolimi na yango ya mike, ezalaki na motuya mingi mpo na mateya mpe banakelasi na ngai basepelaki na yango mingi.”
Mpo na nini Dr. BeDuhn asalelaka Traduction interlinéaire du Royaume ntango azali kotángisa na eteyelo monene? Ayanoli ete: “Nalobi bobele ete, ezali Kondimana ya Sika ‘interlinéaire’ oyo eleki malamu na mikolo na biso. Nazali nganga-mayele ya Biblia oyo azali na makoki mingi, nameseni na makomi mpe na bisaleli oyo bizali kosalelama lelo oyo mpo na boyekoli ya Biblia; kasi, nazali Motatoli ya Yehova te. Nzokande nayebaka mokanda oyo mokomami malamu ntango namoni yango, mpe ‘Komité’ na bino ‘ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika’ esalaki mosala na yango malamu mpenza. Maloba oyo bobongoli na Lingelesi ezali solo mpe ebongi mpenza na boye ete ezali kopusa motángi na kotalela na bokɛngi nyonso bokeseni ya lokota, ya mimeseno, mpe ya makanisi kati na mokili epai bazalaki koloba lokota ya Greke mpe mokili na biso. Biblia na bino ‘Libongoli ya Mokili ya Sika’ ekomami malamu, ezali libongoli ya liloba na liloba oyo ezali kopɛngola bandimbola ya lokuta, ezali kolandela Greke na bosembo nyonso. Ya solo, na makambo mingi, yango ekomami malamu koleka mabongoli oyo mazali kosalelama mingi na mikolo na biso.”
Les Écritures grecques — Traduction interlinéaire du Royaume ebimisami na Batatoli ya Yehova mpo na kosalisa baoyo balingaka Liloba ya Nzambe ete bámesana na Biblia ndenge yango ekomamaki na ebandeli na lokota Greke. Na lobɔkɔ ya mwasi ya lokasa mokomoko tokokuta Kondimana ya Sika na Greke ya ebandeli (esangisamaki na Brooke F. Westcott mpe na Fenton J. A. Hort). Na nsé ya makomi ya Greke tozali kokuta libongoli ya liloba na liloba na Lingelesi. Na molɔngɔ́ na epai ya lobɔkɔ ya mobali ezali na Makomami Mosantu Libongoli ya Mokili ya Sika [Lingelesi], oyo ekopesa yo likoki ya kokokanisa libongoli ya molɔngɔ́ na molɔngɔ́ (traduction interlinéaire) na libongoli ya Biblia na Lingelesi ya mikolo oyo.