Atako bilobaka te, bizali kokumisa Mozalisi na yango
KOLALA ya moi ezalaka kitoko na kotala. Kasi komona motindo moi ekitaka na ngomba moko kati na molɔngɔ́ na bangomba ebengami Apennin, na etúká ya Toscane, na ekólo Italie, ekeseni mpenza na bisika mosusu.
Soki ozali mosika, okomona lokola ete moi ezali kokɔta kati na ngomba na esika ete ekita na nsima na yango. Mpo na nini? Mpamba te likoló ya ngomba yango ekɔta lokola saani oyo emonisaka yango lokola ete ezali na lidusu. Ɛɛ, nkombo Monte Forato—Ngomba Etɔbuka ebongi na yango. Lokola mabelé ekobalukaka zongazonga na moi, komonana lokola ete moi ekɔtaka kati lidusu ya Monte Forato, esalemaka bobele mbala mibale na mbula moko.
Lolenge moko na biloko mosusu bizalisami, biloko bizangi bomoi oyo bizali na makoló bizali kokumisa Mozalisi na yango. Lolenge nini? Motindo moko lokola liyemi kitoko ekoki kokumisa moyemi oyo ayemaki yango. Na bongo, biloko bizali na makoló bizali kolobela nguya, mayele, mpe nkembo ya Yehova. Lolenge mokomi na nzembo alobaki yango, “likoló ekosakolaka nkembo na Nzambe, lola ekoyebisaka misala na mabɔkɔ na ye.” (Nzembo 19:1; 69:34) Lokola moi mpe biloko mosusu oyo bizangi bomoi bizali kokumisa Mozalisi na yango, biso tokosala yango koleka, boye te?—Nzembo 148:1, 3, 12, 13.