Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/1 lok. 32
  • Eyano oyo etindaki na kokanisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eyano oyo etindaki na kokanisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/1 lok. 32

Eyano oyo etindaki na kokanisa

ESILI koleka mwa mikolo, Catholic Herald, zulunalo ya Lingomba ya Katolike ya Loma ebimisamaka na ekólo Angleterre, ezongelaki nkomá elandi oyo eutaki na motángi moko na Pays de Galles: “Mokolo moko na mpokwa, Batatoli mibale ya Yehova bayaki na ndako na ngai. Nayebisaki bango ete ezali Lingomba ya Katolike nde ebatelaki bosolo ya Kondimana ya Sika oyo bazalaki kotángela ngai. Nakamwaki ete, moko na bango andimaki likambo yango. Alobaki ete, ‘Ɛɛ, bozali kobatela yango kasi bozali kotosa yango te. Yesu alobaki ete, “Bólinganaka lokola ngai nalingi bino,” kasi bino bozali kobomana. Na etumba oyo euti koleka, Bakatolike babomaki Bakatolike, kasi Motatoli ya Yehova moko te abomaki [moninga na ye] Motatoli.’ Nasengelaki kondima ete ezali solo! Ndenge nini biso Bakatolike tokoki kosambela mpo tózala na bomoko elongo na ‘basambeli oyo bazali kati na mangomba mosusu ya boklisto’ na ntango bomoko ya solosolo ezali te kati na biso moko? Ebongi ete tóbongisa naino mbeba monene oyo, boye te?”—Yoane 15:12.

Bitumba mibale ya mokili mobimba ya ekeke oyo ya 20 ebandaki na mikili ya boklisto mpe ebomaki bato soko milió 50 kino milió 60. Nzokande, ekoki kolobama na bosembo nyonso ete Batatoli ya Yehova basanganaki na bitumba yango te, bazali mpe kokɔta te na matata oyo mazali kobima lelo oyo. Ndenge nini yango ekoki kosalema? Ekozala mpo na litomba na yo soki okoluka koyeba ekanganeli makasi ya bolingo ya boklisto mpe bomoko oyo esangisi Batatoli ya Yehova koleka milió mitano na mokili mobimba.​—Kokanisá na Yisaya 2:4.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Fɔ́tɔ ya U.S. National Archives

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto