Ozali Komikundola?
Osepelaki na botángi ya banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Soki ezali bongo, talá soki okoki koyanola na mituna milandi:
◻ Wapi mokano ya libosoliboso ya elenge moklisto ntango azali kolanda kelasi?
Mokano ya libosoliboso ya kelasi esengeli kozala ete elenge abongisama malamu mpo na kozala mosaleli malamu ya Yehova. Mpe mpo na yango kolakisama oyo eleki kolakisama nyonso ezali bongo kolakisama ya elimo.—15/8, lokasa 21.
◻ Wapi bantina ya koyebisa bankulutu lisumu monene oyo moninga moko moklisto asali?
Moko na bantina ya koyebisa lisumu monene ezali mpo na kobatela bopɛto ya lisangá. Ntina mosusu ezali ete kosala bongo ezali bolingo ya boklisto emonisami epai ya Nzambe, epai ya lisangá, mpe epai ya mosáli na mabe.—15/8, nkasa 28, 30.
◻ Kobatela ‘ntango nyonso na makanisi koya ya mokolo ya Yehova’ elimboli nini? (2 Petelo 3:12)
Yango elimboli kozongisa “mokolo ya Yehova” mosika te kati na makanisi na biso. Tosengeli kobosana te ete mokolo oyo Yehova akobebisa ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ekómi pene. Yango esengeli mpenza kozala likambo ya solo mpo na biso na boye ete tozali komona yango polele, lokola nde ezali mpenza liboso na biso. (Sefania 1:7, 14)—1/9, lokasa 19.
◻ Mpo na nini mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe oyo miumeli koleka lolenge oyo bato mingi bamizelaki?
Yehova azali kotalela matomba maleki malamu ya libota mobimba ya bato. Lobanzo na ye ezali bomoi ya bato. (Ezekiele 33:11) Tokoki komindimisa ete nsuka ekoya na ntango oyo ebongi mpo na kokokisa mokano ya Mozalisi na biso ya bolingo mpe atondi na mayele.—1/9, lokasa 22.
◻ Ndenge nini baoyo bazali kati na mosala ya ntango nyonso bakoki kobatela esengo na bango atako bakoki kokutana na mikakatano? Basengeli kokanisa ebele ya mapamboli oyo bazali na yango mpe koyeba ete bankóto ya bato mosusu bazali konyokwama na mpasi makasi koleka. (1 Petelo 5:6-9)—15/9, lokasa 24.
◻ William Tyndale azalaki na mokano nini na kobongoláká Biblia? Mokano ya Tyndale ezalaki ya kotika Makomami ete máloba epai ya bato nyonso na elobeli ya sikisiki mpe ya pɛtɛɛ.—15/9, lokasa 27.
◻ Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bakɔteli ya sembo ya Liloba ya Nzambe?
Tozali komonisa bosembo na biso na Liloba ya Nzambe na koteyáká yango na molende nyonso epai ya bato mosusu. Lokola balakisi, tosengeli kosalela Biblia na bokɛngi, na komekáká soko moke te kobalola yango to kopesa ndimbola mosusu na maloba na yango mpo na koyokanisa yango na makanisi na biso. (2 Timoté 2:15)—1/10, lokasa 20.
◻ Lolenge nini elimo ya mokili etondi na ngɛngɛ ekoki kolɛmbisa bosembo na biso?
Elimo ya mokili ekoki kolɛmbisa bosembo na biso na kosaláká ete tósepela te na oyo tozali na yango mpe kopusa biso na komibanzabanza na kotya bamposa na biso mpe matomba na biso liboso na oyo ya Nzambe. (Kokanisá na Matai 16:21-23.)—1/10, lokasa 29.
◻ Kosalela Yehova na molimo mobimba elimboli nini?
“Molimo” elingi koloba moto mobimba, elongo na makoki na ye nyonso ya nzoto mpe makasi na ye. Kosalela Yehova na molimo mobimba elimboli komipesa, kosalela makoki na biso nyonso mpe nguya na biso kino nsuka kati na mosala ya Nzambe. (Malako 12:29, 30)—15/10, lokasa 13.
◻ Wapi fungola ya kozala moto oyo azali kolanda mitindá ya Nzambe?
Fungola ezali koyeba solo Yehova, makambo oyo alingaka, makambo oyo aboyaka, mpe mikano na ye. Ntango mitindá oyo na ntina na Nzambe mizali kotambwisa bomoi na biso, mikokóma solo mitindá ya bomoi. (Yilimia 22:16; Baebele 4:12)—15/10, lokasa 29.
◻ Basaleli ya Nzambe bazali na likanisi nini ya bokatikati na ntina na boyangeli ya bato?
Bamikɔtisaka te na makambo ya politiki mpamba te bazali kosala lokola bantoma to batindami ya Bokonzi ya Nzambe. (2 Bakolinti 5:20) Epai mosusu, bazali kotosa bakonzi mpo na kobatela lisosoli malamu.—1/11, nkasa 16-17.
◻ Liteya nini tokoki kozwa na bomoi oyo mosakoli Elisa aponaki? Ntango azwaki libyangi mpo na mosala moko ya ntina elongo na Eliya, Elisa atikaki nokinoki mosala na ye ya bilanga mpo na kokende kosalela Eliya, atako mikumba na ye mosusu misengelaki kozala ya lokumu te. (2 Mikonzi 3:11) Lelo oyo, basaleli mingi ya Nzambe basili komonisa elimo ya komipesa motindo wana na kotikáká misala na bango mpo na kokende kosakola nsango malamu na bateritware ya mosika.—1/11, nkasa 30-31.
◻ Toli nini oyo ekoki kopesa litomba ezwami kati na mokanda ya Yakobo?
Ezali komonisa biso lolenge ya kolónga minyoko, ezali kopesa biso toli ete tóboya ezaleli ya koponapona, mpe ezali kolendisa biso ete tósala misala malamu. Yakobo alendisi biso ete tóbatela lolemo na biso, tótɛmɛla bopusi ya mokili, mpe tókólisa kimya. Maloba na ye makoki mpe kosalisa biso ete tózala na motema molai mpe tóbondelaka mingi.—15/11, lokasa 24.
◻ Mpo na nini Yehova ‘alimbisaka’? (Nzembo 86:5)
Yehova alimbisaka biso mpamba te abosani te ete tozali bikelamu biuti na mputulu, tozali motau, to na bolɛmbu, oyo euti na kozanga kokoka. (Nzembo 103:12-14)—1/12, nkasa 10, 11.
◻ Mpo na nini tosengeli kozalaka pene ya kolimbisa basusu?
Soki tozali koboya kolimbisa basusu ntango ntina moko ezali mpo na komonisa ngɔlu, yango ekoki mpenza kobebisa boyokani na biso na Nzambe. (Matai 6:14, 15)—1/12, lokasa 17.