Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/12 lok. 32
  • Komilatisa eloko ya litoi ya wolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komilatisa eloko ya litoi ya wolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/12 lok. 32

Komilatisa eloko ya litoi ya wolo

UTA na ntango ya kala, bato basepelaka mingi na babiju ya wolo, mpo na lokumu na yango mpe mpo na kitoko na yango. Ntango Yosefe akómaki ministre-mokonzi na Ezipito, Falo apesaki ye nsinga ya wolo ya kolata na nkingo. (Genese 41:42) Rebeka apesamelaki lopɛtɛ ya wolo mpe makɔmɔ mibale ya wolo, oyo lelo ekoki kokokana na motuya ya dolare 1 400. (Genese 24:22) Na ntembe te, makabo yango ya motuya mandimamaki na botɔ́ndi mpe malatamaki na esengo.

Biblia ezali kolobela babiju ya elilingi oyo ezali na motuya mingi koleka oyo Yosefe mpe Rebeka balataki. Masese 25:12 elobi ete: “Mopameli liboso na litoi na koyokamela ezali lokola eloko-na-kitoko na litoi esalami na wolo na pɛto.” Ntango mopesi-toli azali kopesa makanisi mauti na Liloba ya Nzambe na esika ya kopesa makanisi na ye moko, azali solo kopesa likabo ya motuya. Mpo na nini? Mpo ete toli motindo yango euti mpenza epai na Yehova ye moko. Biblia ezali koloba na biso ete: “Mwana na ngai, tyolá kolakisama na [Yehova] te mpe lɛmbá na mpamela na ye te. Zambi [Yehova] akopamela ye oyo akolinga, lokola tata akopamelaka mwana oyo akosepela na ye.” (Masese 3:11, 12) Ntango moto ayoki toli, andimi yango na komikitisa nyonso mpe asaleli yango, ezali lokola ete azali komilatisa eloko ya litoi ya wolo. Yango ekokani mpenza na lisese lipemami ya Biblia oyo elobi ete: ‘Esengo na moto asili kozwa bwanya, mpe na oyo akómi na mayele. Zambi litomba na yango eleki palata mpe kozwa yango eleki wolo na kitoko.’​—Masese 3:13, 14, Biblia Liloba lya Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto