Mibeko Zomi
EPISKƆ́PƆ ya engumba Gloucester na ekólo Angleterre ayaki koyeba ete koleka katikati ya bakonzi ya lingomba kati na diosɛzɛ na ye bakokaki te kotánga na motó Mibeko Zomi mpe bakonzi ya lingomba zomi likoló na monkámá bayebaki te epai wapi bakoki kokuta yango kati na Biblia. Kasi likambo yango esili koleka mbula 450. Likambo yango esili kobongwana uta ntango wana? Mpenza te—lokola zulunalo Sunday Times emonisi yango na ankɛ́tɛ moko eutaki kosalema eumeli naino mingi te epai na bakonzi ya Lingomba ya Angleterre.
Kati na bakonzi 200 ya lingomba oyo batunaki bango mituna, bobele bakonzi 34 likoló na monkámá nde bakokaki kotánga na motó Mibeko Zomi. Kati na baoyo batikali, moko akanisaki ete ezalaki na bipekiseli mingi, mpe mosusu abwakaki yango ete ezali na likoki te ya kosilisa mikakatano ya kobeba ya bizaleli na ntango na biso.
Oyebi Mibeko Zomi mpe epai wapi tokokuta yango? Yango ekomami kati na Exode, mokanda ya mibale ya Biblia, na bavɛrsɛ́ 17 ya liboso ya mokapo 20. Mpo na nini te kotánga yango? Talá lolenge ya pɛtɛɛ ya kokangisa yango. Mibeko minei ya liboso ezali kolobela losambo na biso epai ya Nzambe, oyo ya mitano ezali komonisa bomoi ya libota, longwa na oyo ya motoba kino na oyo ya libwa etaleli boyokani na biso elongo na bazalani na biso, mpe oyo ya zomi ekeseni na misusu, ezali kopusa biso na koluka koyeba mitema na biso moko, kotalela malamumalamu matindiki ya motema na biso. Talá bosukisi na maloba mokuse, lolenge oyo baklisto bakoki kosalela mitindá.
Ya liboso: Kopesa losambo bobele na Mozalisi na biso. Ya mibale: Kosalela bikeko te kati na losambo. Ya misato: Kozala ntango nyonso na botosi mpe kokumisa nkombo ya Nzambe. Ya minei: Komipesa ntango mpo na kokanisa na mozindo likoló na makambo ya elimo, kozanga kobulunganisa makanisi. Ya mitano: Bana, bótosaka baboti na bino. Ya motoba: Koboma te. Ya nsambo: Koboya ekobo. Ya mwambe: Koyiba te. Ya libwa: Koloba solo. Ya zomi: Koboya bilulela.
Mibeko Zomi mizalaki eteni ya malako ya mibeko oyo Mose azwaki. Kasi mitindá na yango mizali mpo na seko. (Baloma 6:14; Bakolose 2:13, 14) Ezali na ntina oyo nde bayekoli ya Yesu bazalaki kotánga mpe kolobela Mibeko Zomi. (Baloma 13:8-10) Oyo nde esengo—mpe libateli monene—bomoi ekokaki kozala na yango lelo oyo soki bato nyonso batosaki mpe bamitambwisaki na mitindá oyo mipemami na Nzambe!