Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Bilenge bazali kosanzola Nzambe na République Démocratique du Congo
ESILI koleka bikeke mingi, mokomi na nzembo abyangaki bilenge básangana na kosanzola Mokonzi ya seko na maloba oyo: “Bilenge mpe baseka lokola, banunu mpe bana elongo; tiká ete básanzola nkombo na [Yehova] zambi bobele nkombo na ye eleki.” (Nzembo 148:12, 13) Masoló oyo malandi mauti na République Démocratique du Congo mazali komonisa libaku malamu yango oyo ekokani na mosusu te.
• Nkolo lopango na esika oyo mobongisi-nzela monene moko azalaki kofutela akamwaki mingi na etamboli ya Batatoli ya Yehova. Na yango, apesaki ndingisa ete Batatoli ya Yehova báyekola Biblia na Fifi, mwana na ye ya mwasi oyo azalaki na mibu mitano. Nsima ya komona ete Fifi ayebaki makambo mingi na boyekoli ya búku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia,a tata na ye apesaki ye ndingisa ya koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Kuna, Fifi ayekolaki nzembo ya Bokonzi na búku ya nzembo ya Batatoli ya Yehova. Azalaki kolinga mingimingi loyembo nimero 4 oyo ezali na motó na likambo ete “Nzambe alaki Paladiso.”
Mokolo moko, tata ya Fifi azwaki ekateli ya komema ye na ndakonzambe ya lingomba na ye. Bato nyonso bakamwaki mpenza ndenge Fifi aboyaki koyemba nzembo ya lingomba yango. Mpo na nini? Mpo amonaki ete nzembo oyo ezalaki koyembama na lingomba ya tata na ye ezalaki na boyokani te na oyo ayekolaki na boyekoli na ye ya Biblia. Na yango, na mpiko mpenza, ayembaki loyembo na ye ya Bokonzi oyo alingaka mingi.
Nsima ya komeka mbala na mbala kobongola makanisi na ye, bakonzi ya lingomba yango bazwaki ekateli ya kolongola Fifi, mwana ya mibu mitano na lingomba na bango! Atako anyokwamaki bongo, tata na ye asalaki eloko te. Asepelaki mpo ete Fifi azwaki etɛlɛmɛlo ya ngwi mpo na bindimeli na ye. Tata mpe mama ya Fifi balingi ete akóba kosangana na Batatoli ya Yehova.
• Ntango elenge mobali na nkombo Lukodi azwaki ekateli ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, tata na ye atɛmɛlaki ye makasi. Mokolo moko ntango Lukodi azalaki komibongisa mpo na kokende na makita na Ndako ya Bokonzi, tata na ye akanelaki ye na kolakisáká ye mbɛli. Mokolo mosusu abɛtaki ye na nzeté mpe azokisaki ye na mokɔngɔ. Atako botɛmɛli ezalaki makasi, Lukodi atikalaki ngwi na ekateli ya kokóma Motatoli ya Yehova. Asalaki bokóli mpe azwaki batisimo. Sikawa azali kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
Sona, lɛki ya Lukodi akamwaki na mpiko ya ndeko na ye, na bongo ye mpe abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nzokande, mpo ete apekisa ye koyekola, tata na bango atindaki Sona na eteyelo na mboka mosusu, epai kuna Batatoli ya Yehova bazalaki te. Atako bongo, Sona azwaki momeseno ya koyebisa basusu makambo oyo ayekolaki. Lokola litomba, ndeko (cousine) na ye akómaki kosepela na solo.
Ntango Batatoli ya Yehova na mboka moko pembeni bayokaki mosala ya kosakola ya Sona, bakendeki kotala ye mpe bazwaki bibongiseli mpo na koteya ye makambo ya Biblia. Asalaki bokóli mpe eumelaki te, lokola ndeko na ye ya mobali, ye mpe amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo. Lisusu, ndeko na ye azali sikawa mosakoli oyo azwi naino batisimo te, mpe boyekoli ya mokanda ezali kosalema na mboka wana.
Oyo nde esengo mpe kobɔndisama ntango bilenge bazali kosangana na kosanzola nkombo ya Yehova!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.