Butu oyo ezwisaki mpɔngi te ebimisaki matomba
ATA bakonzi mbala mosusu bazangaka mpɔngi na butu. Yango ekómelaki Asueruse, mokonzi ya nguya ya ekólo Perse na ekeke ya mitano L.T.B. Mbala mosusu akanisaki ete asalaki mosala moko ya ntina na bopɔtu, asɛngaki ete batángela ye mikanda mitali mosala ya mokonzi. Ayebaki ete mosáli ya sembo Moledekai, asalaki ete mwango mabe ya koboma mokonzi epɛngolama kasi apesamelaki mbano te. Asueruse alingaki ete likambo yango lisembolama nokinoki. Matomba malamu oyo misala na ye ebimiselaki libota ya Nzambe emonisi ete Nzambe nde asalaki ete azwa mpɔngi te na butu.—Esetele 6:1-10.
Lisangá ya Batatoli ya Yehova na engumba Hermanus oyo ezali na bokúla na ekólo Afrika ya Súdi ezalaki na elónga ya kokanisa eteni yango ya Biblia. Bazalaki kosala makita na ndako ya kofutela. Na boumeli ya bambula mingi balukaki kosomba esika mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya bango moko. Nsukansuka, na 1991, lisangani ya bakambi ya engumba emonisaki mposa ya kotekela bango esika moko mpenza ya malamu.
Nzokande, bamoko balingaki te ete bátekela Batatoli ya Yehova esika yango. Nsima ya kozela basanza mingi, bayebisaki lisangá ete epekisamaki kotekela mangomba mapango na boumeli ya mbula misato, mpe balobaki ete bakotekela bango lopango yango lisusu te. Na sanza ya Máí ya mobu 1993 lisangá etindaki nkomá mosusu, mpo na kosɛnga na lisangani ya bakambi ete bátalela lisusu ekateli na bango. Bazwaki nkomá moko ezalaki bobele na molɔngɔ́ moko, elobaki ete epekiseli ezali naino.
Na Ɔkɔtɔ́bɛ ya mobu yango, moto moko ya lisangani ya bakambi azwaki mpɔngi te na butu. Alekisaki ntango na kotangáká balapólo ya kala oyo batalelaki na liyangani na bango mpo na komona soki makambo mosusu oyo esɛngaki ete bátyela yango likebi ezalaki. Nkomá oyo Batatoli ya Yehova batindaki na lisangani ya bakambi kosɛnga bango ete bátalela lisusu ekateli na bango ebendaki likebi na ye. Bongo, azwaki ekateli ya kokoma likambo yango na molɔngɔ́ ya makambo bakotalela na liyangani ya nsima. Alingaki komonisa ete Batatoli ya Yehova basɛngaki lopango liboso ete epekiseli ya kotekela mangomba mapango ekoka kotyama.
Na nsima, batekelaki lisangá bobele esika oyo balingaki kozwa liboso na 1991! Ezali pembeni ya nzela monene, basangani ya lisangá mpe baoyo bazali kosepela na solo bakoki kokende kuna kozanga nkaká. Batongi Ndako ya Bokonzi moko kitoko, oyo efungolamaki na mokolo mwa 5 Ɔkɔtɔ́bɛ 1996 mpo na lokumu ya Yehova.
Atako lisangá eyokaki mawa mpo ete moto yango ya Letá azwaki mpɔngi te na butu, lisangá ekoki kobɔndisama na likambo oyo ete ata mpe Mokonzi Asueruse azangaki mpɔngi na butu moko. Mpe nsuka ya makambo yango nyonso mibale ezalaki na litomba. Lisangá na engumba Hermanus ezali solo na botɔ́ndi mingi mpo ete bazwi Ndako ya Bokonzi ya bango moko, esika ya losambo ya pɛto mpe ya mateya ya Teokrasi na engumba wana oyo ezali na bato mingi mpe ezali pene ya bokúla.—Baebele 10:24, 25.