Tótoka na “Mai ya Bozindo”
LISESE moko ya Biblia elobi ete: “Toli kati na motema na moto ezali lokola mai na bozindo, nde moto na mayele akotoka yango.” (Masese 20:5) Na ntango ya lisoló ya Biblia, ezalaki mpasi mingi na kozwa mai koleka ndenge ezali lelo oyo na mikili mingi. Ntango Yesu asololaki na mwasi Mosamalia, mwasi yango azalaki kotoka mai na liziba ya Yakobo, libulu oyo ezalaki na bozindo ya mɛtɛlɛ 23!—Yoane 4:5-15.
Lokola Masese 20:5 emonisi yango, bososoli oyo esengeli mpo na koyeba makanisi mpe mayoki mozindo oyo mabombani na motema ya moto ekokani mpenza na molende oyo esengeli mpo na kotoka mai na libulu. Yango ezali bongo na makambo mingi ya bomoi. Na ndakisa, ekoki kozala ete oyebi bato oyo na boumeli ya bambula mingi basili kozwa boyebi mpe eksperiansi mingi. Soki bato yango bazali pene ya kopesa toli te ntango batuni bango te, mbala mosusu ekosengela na yo ete otoka yango. Na komonisáká bosepeli, kotunáká mituna, mpe kolukaluka na mayele nyonso, ekozala lokola ete ozali kokitisa katini na yo kati na libulu mozindo ya bwanya.
Toli ya Masese 20:5 ebongi mpe mpo na libota. Mbala mingi toyokaka basi koloba ete: “Mobali na ngai ayebisaka ngai mayoki na ye te!” Mobali akoki koloba ete: “Mwasi na ngai azali kolobisa ngai te!” Na makambo motindo wana, ezali kosɛnga bososoli mpo na kotoka makanisi oyo mazali kati na bozindo ya motema ya molongani na yo. Mituna ya mayele (Mosala ezalaki makasi lelo? Nini ekómelaki yo lelo? Nasalela yo nini?) mbala mingi ekoki kobandisa lisoló ya bozindo oyo euti na mitema. Komonisa bososoli motindo wana ekolendisa ekanganeli ya libala, likambo oyo ekozala na litomba mpo na mobali mpe mwasi.