Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/9 lok. 3
  • Eleko ya mpasi mpo na mibangé

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eleko ya mpasi mpo na mibangé
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tókumisa baboti na biso atako bakómi mibangé
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Nzambe asalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/9 lok. 3

Eleko ya mpasi mpo na mibangé

MAMA ONIYAN azali na mibu 68, afandaka na engumba moko monene na Afrika ya Wɛ́sti. Ntango azalaki elenge, azalaki kokanisa ete na eleko oyo akokóma mobangé akofanda na kimya, elongo na bana na ye mpe bana ya bana na ye. Na esika ete ezala bongo, akómi nde kotɛkisa mai ya malili ya komela na ntango ya moi makasi. Mwa mosolo azali kozwa ezali kosalisa ye ete abikela. Bana na ye mibale bafandaka mosika na mboka mosusu. Eleki ntango molai mpenza batindelaka ye lisusu mbongo te.

Na bambula eleki, na Afrika, mibangé bazalaki na lokumu mpenza. Bazalaki komemya bango mpo na makambo mingi oyo bamona mpe boyebi na bango, lisusu mpo na bwanya mpe bososoli oyo mingimingi mibangé bazalaka na yango. Bazalaki kosalisa mingi mpo na kobɔkɔla bana ya bana na bango. Bilenge bazalaki kotuna batoli epai na bango, mpe bazalaki koluka kondimama na bango. Bato bazalaki na bomoi eyokani na toli oyo ya Biblia ete: “Okotɛlɛma liboso na nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali [to, mwasi] anuni.”​—Levitike 19:32.

Makambo mabongwani. Bobóla, kobeba ya nkita, kozanga mosala, mpe kotika bamboka mpo na kokende kofanda na bingumba mosusu etindi ebele ya mibangé ete bábikelaka bango moko. Camillus Were, ye azali mokambi na lisangá moko ekobatelaka mibangé na ekólo Kenya, alobaki: “Likebi likoló na momeseno ya kobatela mpe kosunga mibangé ezali sé kolɛmba.”

Ya solo, kolɛmba ya bokangami na libota ezali bobele na mikili ya Afrika te. Kolobáká na ntina na ekólo Japon, zulunalo Guardian Weekly elobi: “Bosembo ya bana epai ya baboti ezalaki moboko ya mimeseno ya bato ya Japon oyo basangolaki na Lingomba ya Conficius, kasi likambo ya kotika mboka ya mike mpe kokende kofanda na bingumba minene elimwisi momeseno yango mpe elɛmbisi bokangami ya libota: lelo, bato 85 likoló na monkámá na mboka Japon bazali kokufa na balopitalo to mpe na bandako ya mibangé.”

Ata soki makambo mazali motindo nini, bato oyo balingi na bosembo nyonso kosepelisa Nzambe bazali kosala milende mpo na kokumisa baboti na bango. Bazali kolanda toli ya Biblia ete: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo . . . Bongo ezala na yo malamu ete oumela na mokili ntango molai.” (Baefese 6:2, 3) Atako kokumisa mpe kobatela baboti oyo bakómi mibangé ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te, kasi ekoki komema matomba malamu mingi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto