Batikalaki ngwi kati na monyoko ya ba Nazis
BOSEMBO ya kozanga kobanga oyo Batatoli ya Yehova ya ekólo Allemagne bamonisaki na nsé ya boyangeli ya Nazi ekeseni mpenza na etɛlɛmɛlo oyo bakonzi ya mangomba ya boklisto bakamataki. Yango elobelami kati na búku Ideology of Death ya John Weiss, oyo azali Profesere ya Istware na États-Unis. Akomi boye:
“Na 1934, Lingomba ya Évangelique elobaki mbala mingi ete ba Nazis basengeli ‘kondimama na Lingomba ya Luther,’ mpe batɔ́ndaki ‘Nkolo Nzambe’ na lolenge apesi ba Allemands ‘mokonzi monene oyo asambelaka mpe akoki kotyelama motema.’ . . . Episkɔ́pɔ moko ya Lingomba ya Protestá akomelaki bakonzi mosusu ya Lingomba na ye ete ‘Nzambe atindeli biso [Hitler].’ Weiss akomi lisusu ete: “Lingomba ya Méthodiste ya Allemagne . . . endimaki likanisi ya Episkɔ́pɔ Dibelius ete Hitler abikisaki Allemagne . . . na botomboki ya Bolchevique oyo ekómaki pene, komemáká kimya mpe molɔngɔ́ . . . Lingomba ya Mormon ekebisaki basangani na yango na kolobáká ete koboya Hitler ezalaki kobuka mobeko ya Mormon.” Mpe abakisi ete: “Bayebisaki na Bakatolike ete kotosa boyangeli ya Nazi ezali mokumba ya bulɛɛ, mokumba oyo elongolamaki te ata nsima wana bakonzi ya mangomba bayebaki makambo nyonso ya nsɔ́mɔ oyo ba Nazis basalaki na Mpótó ya Ɛ́sti.”
Kasi ezali boni mpo na Batatoli ya Yehova? Profesere Weiss amonisi ete “lokola etuluku, bobele Batatoli ya Yehova nde batɛmɛlaki ba Nazis.” Profesere Weiss akomi lisusu ete bankóto mingi kati na bango bakangamaki, “nzokande Motatoli nyonso oyo atindamaki na káa ya bakangami akokaki kotikama bobele soki atye sinyatili na nkomá epai emonisamaki ete awangani lingomba na ye.”
Na ntina na bosembo ya Batatoli ya Yehova, Profesere Weiss alobi boye: “Ndakisa na bango ezali komonisa ekateli makasi oyo ekokani na mosusu te mpe nguya makasi oyo boklisto ezalaki na yango liboso ete ekóma eteni moko kati na ebongiseli ya mokili mpe komikɔtisa na ebongiseli ya bato oyo ezipaki mposa ya kozala na bomoi ya komipesa mobimba. Lokola pastere moko ya Lingomba ya Protestá akomaki na ntina na bango, ‘Ezali mangomba minene te, kasi batyolami wana oyo bato nyonso bazali kosɛka nde bazalaki bato ya liboso oyo batɛlɛmaki ngwi na nkɛlɛ ya Hitler, mpe oyo bazalaki na mpiko ya kotɛmɛla ye mpo na kondima na bango.’”