Esambiselo monene ya Etúká ya Connecticut endimi ntómo ya mobɛli
Na mokolo ya 16 Apríli 1996, esambiselo monene ya etúká ya Connecticut, na États-Unis, endimaki lotómo ya Batatoli ya Yehova ya koboya kozongisama makila. Likatami wana ekweisaki likatami oyo esambiselo mosusu ya nsé ezwaki.
Na Augústo 1994, Nelly Vega, oyo azali Motatali ya Yehova, abandaki kobima makila mingi nsima ya kobota mwana na ye ya liboso. Milende nyonso misalemaki mpo na kokangisa makila wana milóngaki te. Lokola kolɔngɔ́nɔ́ ya Madame Vega ezalaki sé kobeba, bakambi ya lopitalo balukaki ndingisa na esambiselo na ntina ete bázongisa ye makila. Madame Vega atyaki sinyatili na nkomá moko oyo kati na yango asɛngaki ete bázongisa ye makila te to nkisi mosusu oyo esalemi na makila na boumeli ya ntango nyonso oyo akozala na lopitalo, na lolenge yango alongolaki lopitalo na ekweli na ntina na mokakatano nyonso oyo ekateli na ye ekoki kobimisa. Atako bongo, bakambi ya lopitalo balobaki ete kozongisa ye makila na makasi ekozala mpo na bolamu ya bébé, oyo, engebene bakambi ya lopitalo, azalaki na mposa ya mama na ye. Basambisi na esambiselo ya nsé bamibanzabanzaki mpe na likambo oyo ete, longola mpasi na ye ya kosila makila, Madame Vega azalaki elenge mwasi, na nzoto makasi. Na yango, atako mobali ya Madame Vega mpe avoka na ye bandimaki likambo yango te, esambiselo epesaki ndingisa mpe bazongisaki ye makila.
Na nsima, likambo yango lifundamaki na esambiselo monene ya etúká ya Connecticut. Kuna, basambisi nyonso bazwaki ekateli ete lopitalo ebukaki ntómo ya Madame Vega. Ekateli elobaki ete: “Ankɛtɛ liboso ya kosambisa likambo esalemaki katikati na butu, na lombangu nyonso oyo ekokaki kopesa nzela te na ngámbo nyonso ete bámonisa polele makanisi na bango.”
Ekateli yango ya esambiselo monene ya etúká ya Connecticut ezali na ntina mingi mpo na bato mosusu oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Donald T. Ridley, avoka ya Madame Vega alobi ete: “[Ekateli yango] ezali na ntina mpo na babɛli nyonso oyo bakoki koboya ekateli ya monganga oyo azali kosalisa bango. Ekateli wana ekopekisa mapitalo na kondimisa makanisi na bango na makasi soki maboyami na babɛli, ezala na ntina na makambo ya losambo to mpe makambo mosusu.”