Babúku ebele, ebele!
Salomo, Mokonzi ya mayele na ntango ya kala akomaki ete: “Ezali na nsuka na kosala mikanda te.” (Mosakoli 12:12) Na boumeli ya mobu 1995, na mboka Grande-Bretagne, motángo ya mikanda oyo mibimisamaki ezalaki na mwayene ya mokanda moko mpo na bafandi 580 ya mboka yango, kosaláká ete mboka yango ezala na esika ya liboso ya kobimisa mikanda ya sika. Chine, ekólo oyo eleki na bato ezalaki na esika ya mibale, na motángo ya mikanda 92 972 soki tokokanisi yango na Grande-Bretagne oyo ebimisaki mikanda 95 015. Allemagne elandi (mikanda 67 206), mpe na nsima États-Unis (49 276), mpe bongo France (41 234). Zulunalo The Daily Telegraph oyo ebimaka na engumba Londres elobi ete: “Mboka Grande-Bretagne ezali kozwa esika ya liboso na mokili na oyo etali bobimisi mikanda bobele na Lingelesi.”
Balapólo emonisi ete esili koleka mwa bambula mingi botɛkisi mikanda ezalaki sé kokita, mpe sikawa bobele mikóló 80 likoló na monkámá na Grande-Bretagne nde bazali kosomba mokanda moko to koleka na mbula moko. Kasi, bato batángaka solo mikanda oyo basombaka?
Mokanda moko oyo ezali kokóba kokabolama mpe kotángama na mokili mobimba ezali bongo Biblia, oyo ebimisami sikawa na mobimba to mpe na ndambo na nkótá koleka 2 120. Soki ozali naino na Biblia te, komelá biro ya la Société Watch Tower oyo ezali pene na esika ofandi mpo na kozwa ekzamplɛrɛ moko. Soki ozali na Biblia, kamatá yango mpe luká mikapo ya Makomami mipesami kati na masoló ya zulunalo oyo. Na kosaláká bongo, okozwa boyebi ya Biblia oyo ezali kopesa bomoi.