Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Azwaki “mangaliti moko na motuya monene”
“BOKONZI na Likoló ezali lokola motɛkisi oyo azali koluka mangaliti kitoko. Ezwi ye mangaliti moko na motuya monene, akei mpe atɛkisi nyonso ezalaki na ye mpe asombi yango.” Na maloba yango, Yesu amonisaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali na motuya moleki monene. (Matai 13:45, 46) Baoyo bazali koyeba motuya ya Bokonzi, mbala mingi bazali komipesa na ntina ete bákoka kozwa yango. Yango emonisami na lisoló lilandi oyo liuti na etúká ya Pingtung County, na ekólo Taïwan.
Na 1991, Monsieur Lin na mwasi na ye babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Ntango mokonzi moko ya lingomba ayebaki yango, amekaki kobenda bango na lingomba na ye. Lokola babalani yango bazalaki na mesa mpo na kotɛkisa makila ya ngulu mpe ya mabata na wenze ya engumba na bango, bakanaki kotuna likanisi ya mokonzi wana ya lingomba na ntina na likambo yango. Ayanolaki ete “oyo nyonso Nzambe asalaki ekoki kozala bilei mpo na moto.” Na ngámbo na bango, Batatoli ya Yehova balendisaki bango ete bátalela oyo elobami na Liloba ya Nzambe. Bayebaki ete Yehova Nzambe atalelaka makila ete ezali bulɛɛ, mpamba te “bomoi na mosuni ezali kati na makila.” (Levitike 17:10, 11) Na yango, baklisto ya solo basengeli “koboya . . . makila.” (Misala 15:20) Nsima ya kotalela Makomami na ntina na likambo yango, babalani wana bazwaki ekateli ya kotika kotɛkisa makila, atako yango ezalaki eutelo monene ya mosolo na bango. Nzokande, mwa ntango moke na nsima, bakutanaki na momekano monene koleka.
Liboso ete bábanda koyekola solo, babalani yango balónaki banzeté ya betel 1 300 na lopango na bango. Atako esengelaki mbula mitano liboso ete banzeté yango ekoka kokɔmɛla, na ntango yango elingaki kobanda kobota malamu, bakokaki kolikya kozwa dolare 77 000 na mbula. Wana eleko ya bobuki mbuma ya liboso ebɛlɛmaki, Monsieur mpe Madame Lin basengelaki kozwa ekateli monene. Basilaki koyeba na nzela ya boyekoli na bango ya Biblia ete baklisto basengeli komipɛtola “na mbindo nyonso na nzoto mpe na [elimo, NW]” na koboyáká kosalela, to kolendisa bizaleli ya mbindo lokola komela likaya, kosalela bilangwiseli, to kolya mbuma ya betel. (2 Bakolinti 7:1) Basengelaki kosala nini?
Na kopusama na lisosoli oyo litungisami, Monsieur Lin azwaki ekateli ya kotika koyekola. Bobele na ntango yango Madame Lin atɛkisaki mbuma ya betel oyo babukaki na banzeté mosusu ya kala kati na elanga na bango mpe azwaki mosolo dolare 3 000. Yango ezalaki sé elakiseli ya litomba oyo balingaki kozwa mosika te soki babateli banzeté na bango. Nzokande, Lisosoli ya Monsieur Lin elandaki kotungisa ye.
Abundaki na likambo yango kino mokolo moko, asɛngaki na Batatoli ya engumba na bango ete bákatela ye banzeté yango. Batatoli balimbwelaki ye ete yango ezalaki ekateli na ye moko; na yango, asengelaki ‘komema bozito na ye’ mpe asengelaki kokata banzeté na ye ye moko. (Bagalatia 6:4, 5) Balendisaki ye ete amikundola elaka ezali kati na 1 Bakolinti 10:13, oyo elobi ete: “Emekeli moko ekomeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bómekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimelo ete bókoka koyika mpiko.” Lisusu, Batatoli batindaki ye na kokanisa, kolobáká ete: “Soki biso tokateli yo banzeté yango, okoki koyoka mawa mpo na yango mpe kotalela ete biso nde tobebisi banzeté yango.” Nsima ya mwa ntango, mokolo mosusu Madame Lin alamusamaki na makɛlɛlɛ ya mosumane (scie) ya kurá. Mobali na ye mpe bana bazalaki kokata banzeté ya betel!
Monsieur Lin amonaki ete Yehova azali sembo na elaka na Ye. Azwaki mosala oyo epesaki ye lisosoli ya pɛto, kopesáká ye likoki ya kokóma mosanzoli ya Yehova. Azwaki batisimo na liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova na Apríli 1996.
Ɛɛ, Monsieur Lin ‘atɛkisaki biloko nyonso azalaki na yango’ mpe asombaki “mangaliti moko na motuya monene.” Sikawa azali na libaku malamu ya kozala na boyokani na Yehova Nzambe mpe kosalela matomba ya Bokonzi na Ye.