“Biloko ya motuya ya solo”
Nkomá moko oyo etindamaki na filiale ya Batatoli ya Yehova na ekólo Nigeria emonisaki bazulunalo mibale ya sipesiale ete ezali “biloko ya motuya ya solo.” Mokomi na yango, elenge mobali moko, alimbolaki ete:
“Nazali kokomela bino mpo na kopesa bino matɔ́ndi mingi mpo na milende bozali kosala mpo na kolobela makambo nyonso ya bomoi ya mokolo na mokolo kati na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
“Nazali na mibu 17. Mobu moleki, kompanyi moko ya radio ebongisaki mamekani ya kokoma lisoló likoló na motó na likambo ‘Lolango esuki sé na kosangisa nzoto te—Sida ezali solo.’ Lisoló mokomoko lisengelaki kozala na maloba koleka nkama minei. Likabo ya Naira 1 000 [dolare 12,50] ebongisamaki mpo na mokomi ya lisoló oyo likoleka malamu. Ya solo, balobaki ete, bato basengeli kokoma bobele mpo na kozwa likabo te, kasi, mpo na koyekola likambo moko. . . .
“Nazwaki makanisi na ntina na sida kati na bazulunalo yango mibale. Mpo na bolingo, masoló oyo malobelaki yango mazalaki mingi mpenza. Nasalelaki makanisi ya Lamuká! ya 8 Augústo 1978 (ebimeli ya Lingelesi).
“Bobele sanza mibale nsima ya kotinda lisoló na ngai, basakolaki mamekani. Nakamwaki ete nabimaki moto ya liboso na bitúká ya Cross River mpe Akwa Ibom!
“Makanisi nyonso oyo nasalelaki mautaki kati na bazulunalo yango. Ezali mpenza likambo ya kosepelisa ete Yehova azali koyebisa biso makambo na ntango ebongi kati na mokili oyo ya yikiyiki mpe ya bokɔnɔ. Lokola tozali baklisto ya solo, toyebi ete bolingo eleki kosangisa nzoto. Mpe, ezali solo ete kozala na bomoi ya pɛto, lisosoli ya pɛto mpe kolanda mitindá ya bizaleli malamu ezali kobatela biso na makɔnɔ lokola sida.
“Napusami na kotɔ́nda bino mpo na biloko ya motuya mpo na solo oyo bozali ntango nyonso kobimisa. Tiká ete Yehova alanda kopambola milende na bino wana bozali ntango nyonso kobimisa bazulunalo yango ya motuya mingi.”